Pàpa François aweyi: o mokolo mwa lundi 21 ya sànzà ya aprili 2025:  Bandimi basàli mobembo  ekomema na baziliki ya Saint-Pierre. Pàpa François aweyi: o mokolo mwa lundi 21 ya sànzà ya aprili 2025: Bandimi basàli mobembo ekomema na baziliki ya Saint-Pierre.  (ANSA)

Bolakisi to komonisa limémya mpe bakondoleanse ya ba eklezia bizali kowuta na mokili mobimba

Mawa, losambo mpe bopesi limemya ezali kokoma na ba eklezya ya bamboka bandà liyebisi ya liwà lya 266ème Pàpa ya eklezya ya Katoliko oyo akufi nà bambula tukù mwambé na mwambé (88 ans) ut’o mokolo mwa lundi mwa Pasika mwa tuku mibalé na moko (21) ya sànzà ya aprili na Sainte Marthe. Lisàngà ekozala na ngonga ya 19h00, tango ya Roma. Misa ekobanda mpo ya bopetoli masumu ya Pàpa François na baziliki ya Saint-Jean ya Latran, katedrali ya baPàpa, bongo mpe lokola na bakatedrali ya mokili mobimba.

Bansàngo ya Vatican – Liyebisi eye ekokoba na boùmeli ya ekwélà mokolo na mokolo (21 aprili – 18h37)

 

Conference episkopale ya Argentine, mabele epayi wapi Mokonzi monene wa bantomà abotamaki, elakisi “mawa mingi”, nà mpe botondi mpo na bomoyi nà libulà liyé Pàpa ya yambo ya mabélé ya Amerika atikeli ye. Elongo balobi : « tokotondo Nzambe mpo ya bomoyi, mosàlà mpe litàtoli lya boyambi ya moto oyo ayebaki kokamba eklezya ya mokili mobimba na bosàwà, na molendè mpo ya Nsango Elamu nà mpe bolingo makasi mpo ya babola, bayé bazàngà esika ya kovanda, bato na bwalé ». Na mokandà mobimaki, ba episkopo elongo na ekolo bapesi mitindo ya kosàla mikolo sambo ya matanga (kolela) na ekolo mobimba. 

Na Italy, episkopo-molandi ya diosezi ya Roma, tata wa lokùmu Baldo Reina, alobi ete diosezi ya Roma ezali kolela nzeneneke ya Nsango Elamu, « Mokengeli mpata ya Ngolu, Mosàkoli mwa boboto». Misa ya bopetolami ekosàlema o mokolo mwa lundi na mpokwa na ngonga ya 19h00 na kati ya baziliki ya Saint-Jean ya Latran. « Ntongo ya Pasika ezingela episkopo ya biso Pàpa François, awa akoleka na mokili moyé kin’o mboka Tata»; ekomi tata wa lokùmu Reina. Yé nde asalàki milùlù mya nzela ya kuruzé o mokolo mwa mitano na esika ya bakolizé. Tata wa lokùmu Matteo Zuppi, mokambi ya baepiskopo ya Italy alobi été baeklezya ya bango ebetaki mpe ngonga lokola, mpo ya kolakisa eleko ya mawa na eklezya mobimba

Yoko Misa na Malita-Masantu mokolo mwa mosàla misato.

Na Mabélé Masantu, o kati ya libenisi Urbi et Orbi ya Pàpa o mokolo mwa lomingo moleki, nzokandé azawaki maloba mansuka liboso lya bato. Patriarche latin ya Yeruzalema alobi ete misa mikosàlema na kati ya baziliki ya Malita-Masantu o mokolo mwa mosàla misato mwa tùkù mibale na isato (23) ya sànzà ya aprili.

Bopesi limémya ya Eklezya ya France

Episkopat ya ekolo ya France epesaki lilmémya lya yé o mokolo mwa lundi na Pàpa François. Epesi longonya na mbela ya yé mpo ya bondeko, mpe bomipesi bwa yé mpo nakosunga babola. Eric ya Moulins Beaufort abeti nsété na lolenge lya yé ya kosàla Pastoral na bomikitisi mpe molende mwa yé mpo ya masolo kati na bamangomba ya eyamba. Ba Misa mpe ba veillé mibongisami na Paris mpe na Marseille mboka molingami ya Pàpa François. Na yang oba ngonga ya eklezya ya Notre-Dame ebetaki mbala tukù mwambé na mwambé (88 fois). Na lolàkà ya Raphael Bedros XXI, Patriacat ya katoliko ya ekolo ya Armenie, esàngànaki na losambo mpo ete Nzambe ntà ngolu alimbisa masumu mayé mpe ayamba ye na ekopi ya yé ya seko. Mpe ba pesaki liyebisi ya milùlù mya office ya requiem ekosàlema na ngonga ya 17h00 mpe mosusu mokosàlema na ngonga ya 10h00 mpo ya kokundola ye.

Primat ya ekolo ya Pologne mpe bangonga na Cracovie

Na mikili ya Poto, Primat ya Pologne, Mgr Wojciech Polak, apesi lokùmu na Pàpa François lokola “nzeneneke monene ya eyamba”. Atondi ye botondi mpo na mateya mayé mabolimbisi. Na mboka ya Cracovie, ngonga “Zygmunt” ebetaki mpo ya kopesa yé lokùmù. Bongo Misa moko mikosàlema na katédrale ya Wawel na lisàlisi ya episkopo wa lokùmù Stanislaw Dziwisz, Mokomeli mwa kala ya Pàpe Jean Paul II. Na mikili ya Amerique latin, eklezya ya equateur, etomboli lolengez ya pastoral na yé ya kozala pembeni n abato mpe bondeko. Ngonga ebetaki mpe Philipine mp ona kolakisa yé limémya.

Ba-Canada mpe ba-Haity bazali na mawà mpo lolenge ya bozalani pembeni ya François elongo na bato babwalé

Na Canada, baepiskopo bakundoli mobembo ya Pàpa Frànçois na 2022. Mgr William T. McGrattan, episkopo ya Calgary mpe mokambi ya Conférence épiscopale alobeli mingi mpenza boséngi bolimbisi bwa yé na baotoktoni. Alakisaki bongo bomipesi ya eklezya mpo ya boyokani.

Na Haïti, ba episkopo balakisi na bozindo mawa mabango. Bakumisi bozalani pembeni mpe bokengi ya molendè ya Pàpa na bato oyo bazwaka makàmà ya makàsi, oyo wapi yé azalaki kosunga na bosàwa bwa yé mpo bolingi bwa yé na babolà. Azalaki mp ona bango “liziba lya elikya, ya mpiko mpe ya bomoko (bondeko)”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

21 sánzá ya mínei 2025, 19:40