Episkopo monene ya Juba ayoki mawa mpo ya libùngi lya «mobateli lya bango»
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Tokamwaki mpenza liyebisi lya liwà lya Pàpa François, ye mòto abimaki na lomingo mpo ya kopesa bobenisi. Na lisòlò moko Vatican News epesaki na Tata episkopo wa lokùmu Stephen Ameyu, episkopo monene ya Juba, alakisi kolela ya bato ba Sud-Soudan oyo « babungisi moko kaka ya bazuzi azalaki kokanisa na mokili mobimba, bituba oyo banso babosanàki. Ezali likàmà monene mpe mpo ya biso ezali libungisi makasi: bayìsoudan ya sud babungisi mobateli ya bango ».
Tata wa lokùmu Ameyu akundoli malamu mosàla makasi Pàpa asàlaki na mboka na yé, oyo moto mosusu akoki kolimwisa yango te. Kutu na nsé ya bokono ya Pneumonie, atangaki nkombo ya mboka ya biso Sudan ya sudi mpe Soudan, o mokolo mwa 30 ya sànzà ya marsi. Atiyaki biso mpeza likolo ya moto.
Mibù mibale mpamba mileki oyo Pàpa François akendaki na Sudan ya Sudi kobanda mokolo mwa misato (3) kino mitano (5) ya sànzà ya febuali ya 2023. Ezalaki mobembo mwa yé mwa nsuka na mabele ya Afrika. Alobi ete tango bakendaki koyamba yé na esika ya ba mpepo, Pàpa azalaki na esengo makasi mpo ya bato ba Sudan. Mobembo mwa yé momemaki elikya o kati ya bato ébélé mingi mpenza na bayé bakìmà mboka mpe bayé bato baboyaka. Na boùmeli ya mikolo minà, akutanaki nà bayì Sudan mpamba te, kasi mpe nà bikolo ya nzinga-nzinga bayàki kotala yé mpe kolakisa bondeko bwa bango, lokola Ethiopie, Kenya, Ouganda, Zambie.
Bokutani nà bayé batikà mboka
Bokutani bwa yé na bayé batikà mboka na Freedom Hall ya Juba, etikaki Mgr Ameyu na kokamwa; mpamba te alobaki na bango moko, ayokaki matàtoli ya bango kobanda abtikaki mboka na 2013, bayé babungisa nyonso likolo ya bitumba mpe kozinda na mayi ya mbula. Alobaki yango polele ete, ekolo ya Sudan ya sudi etungisami na bitumba mpamba te kasi mpe na makàmà ndenge na ndenge, ya mabélé. Misusu, ekoùta na moto yemei.
Mobateli ya bayé bakobosanaka
Archeveque yq Juba alobi ete Pàpa François azali moko ya bakambi o mokili mobima oyo ayebaki mpasi ya biso. Na mokili mwa lelo etondi matata, mpe bakobosanaka basusu, ye alobelaki bitumba na biso. Yango tozali kolela mpo tobungisi moko ya motuya mpenza, mobundeli na biso.
Tokotondo Nzambe botondi mpo ya bomoyi bwa Pàpa François, esukisi episkopo wa lokùmu Ameyu. Kasi lolenge yoko tozali na matanga; mpamba te tobungisi oyo amonaki biso, oyo avandaki pembeni nà biso mpe andimaki te ete mokili ebosana biso.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.