Timor Oriental elakisi limemya na Pàpa Francois
Bansango ya Vatican
Mosika nà place Saint-Pierre na ba kilometre 10.000, bandimi basànganaki na mboka mokonzi mpo ya klakisa limemya ya nsuka na Pàpa François. Bakundoli likanisi lya yé nà ba candela, ba fulele mpe ba foto na maboko. Milùlù mya Misa molekaki o mokolo mwa tùkù mibale na motoba (26) ya sànzà ya aprili na sima ya nzàngà na Dili, nzela moko na Misa eye esàlemaki na Place Saint Pierre.
Na tongo-tongo, molongo efungwamaki na lisàlisi lya motuka Papamobile oyo François atambolaki na yango, tango azalaki na mobémbo kuna na sànzà ya libwà. Etambolaki na ba nzela ya mboka mokonzi Dili, ekatisaki bisikà ya bokonzi ya etùkà, elekaki na ndako ya mokambi ya ekolo kino esika ya ntomà ya Pàpa, mpe bisika bisusu ekangangami na boyambi ya bato ya Timor. Mpo ya bamedias ya mboka, bato bayiké basànganaki na mbàlàkàtà na molongo, nzokandé basusu batikalaki o bokula ya banzela, nakoningisa bakandela, ba sapélé, mpe koyemba banzembo ya nzambe.
Mobembo mwa Pàpa na ekolo ya Timor oriental na sànzà ya setembere 2024
Pàpa François azali na lapolo ya pembeni mpenza na ekolo ya Timor oriental. Kondo Pàpa akendeki mobembo na sànzà ya setemebere moleki na mboka eye, epayi wapi bato bakatoliko bazali ébélé na motùyà ya 98%. Mobembo monà mozalaki emoniseli ya bomipesi ya bango banso. Mokonzi monene ya bantomà akambaki misa na stade monene ya ekolo. Bato pene ya 600.000 basàngànaki mpo ya Ukaristya enà.
Na ekolo oyoepayi wapi ba mingi bazalai nà bambula na nsé ya tùkù misato (30 ans), motùyà ya 65%, esepelisaki Pàpa nakomono o bilongi bya bango, elembo lya nzambe amikomisi mwana. Komona bomoyi ya bilenge nà bana ébélé, ekozongisa sika tango inso energy, esengo nsai ya bato ba bino, elobelaki bango Pàpa. Alimbolaki bango ete nzambe alekaka pembeni na nzela ya bana mike, mpo yemei nzambé amikomisaki mwana moke, mpo ya kokamwisa biso te to koyokisa biso mawa, kasi mpo ya kofungolela biso bolingi bwa Tata, mpe tomilendisa na yé, akobikisa bampota ya biso, akolongola bokeseni bwa biso mpe akotisi biso na bomoyi bwa bosembo.
Timor oriental ezali ndé mboka ya boombo bwa ekolo ya Portugal; ezali kaka n abato pene ya miliyon moko. Ezwaki lipandà na yango kaka na 2002, sima ya referendum ua 1999 na lisalisi ya Nations Unies. Lipandà linà lizwamaki na sima ya bitumba makasi ememaki liwa ya bato ebele mpo balongwa na maboko ya bato ya Indonesiya, oyo ekonzaki ekolo eye na boùmeli ya mibù ekoki na ndambo ya ekeke, mingi mpenza ut’o mobù 1975 kino 1999.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye