2025.04.21 Pàpa François aweyi 2025.04.21 Pàpa François aweyi 

Azali o maboko ma Tata

Na tongo ya lelo, na ngonga ya sambo (7) pe miniti tukù misato na itano (35), episkopo ya Roma, François, azongi o ndako ya Tata.

Episkopo ya lokumu Farrell alobaki na mawa liwa ya Papa Franços, na maloba maye: “Bandeko babali mpe ya basi, ezali na mawa enene tè ngai nayebisa bino liwa lya Santu Papa François na biso. Lelo na tongo, na ngonga ya sambo (7) mpe miniti tukù misati na itano (35), episkopo ya Roma, François, azongi o ndako ya Tata. Bomoyi bwa yé mobimba abonzaki bwango na mosala ya Mokonzi pe ya Eklezia na ye. Alakisi biso na kobika na makambo ya ntina ya Nsango Elamu na loboko, molende pe bolingo ya mokili mobimba, mingimingi  po na babola koleka pe baye batika bango pembeni makasi. Na botondi enene po na ndakisa na ye ya moyekoli ya solosolo ya Mokonzi Yezu, totiki molimo ya Papa François na bolingo ya mawa nsuka te ya Nzambe Tata, Mwana pe Elimo Santu

Bosakoli nsango ya liwà lya Pàpa François na episkopo wa lokùmu Farrell

 

21 sánzá ya mínei 2025, 11:01