Na Saint-Pierre, Molùlù mwa bokangi sanduku ya ébémbé ya Pàpa François

Na lotale ya ntubela, milùlù mikambaùmaki na camerlingue episkopo wa lokùmu Farell. Mwa bato ya libotala lya yé bazalaki mpe wana. Na butù, chapitre ya Saint-Pierre ekosunga na mabondeli mpe na kokéngela.

Bansango ya Vatican

 

Lokola eyebisamaki, molùlù ya bozipi sanduku ya ébémbé ya Mokonzi monene ya bantomà elekaki na mpokwa moye na ngonga ya 20h00 na lotale ya ntubela o kati ya baziliki ya Mosantu Petro.

Molùlù monà mokambamaki na episkopo wa lokùmu camerlingue Kevin Joseph Farell. Moyangeli ya milùlù ya basàmbo ya Pàpa, Mgr Diego Ravelli atàngaki liboso ya ba episkopo wa lokùmu mpe baepiskopo, mokanda:“Rogito”, oyo ezali mokanda molokoti bomoyi mpe bikélà bya Pàpa François, nsima balingaki yango mpe bakangaki yango, bakitisaki mokoloto mpe batiyaki yango o kati ya sanduku ya ébémbé.   

Longola bato oyo batangamaki na biro ya milùlù ya bansàmbo, basusu bazali bato ya libota lya Pàpa oyo basànganaki na milùlù minà.

Milùlù misàlemaki na lolenge ya Ordo Exsequiarum Romani Pontificis esilaki na ngonga ya 21 hoo. Nabùtù, Chapitre ya Saint-Pierre esungaki na mabondeli mpe na bokengeli nzoto ya Bokonzi monene ya Pàpa kino na bozeli Misa ya matanga ya ntongo ekosàlema na ngonga ya 10h00 na lopango ya baziliki ya Saint-Pierre.  

Milùlù mya kozipa elongi (Velatio)
Milùlù mya kozipa elongi (Velatio)   (Vatican Media)

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

26 sánzá ya mínei 2025, 11:45