Bosàngani ya batata episkopo wa lokùmù o kati ya chapelle Sixtine na tango ya conclave ya liboso, na 2013, o mokolo mwa zomi na ibalé (12) ya sànzà ya marsi.  Bosàngani ya batata episkopo wa lokùmù o kati ya chapelle Sixtine na tango ya conclave ya liboso, na 2013, o mokolo mwa zomi na ibalé (12) ya sànzà ya marsi.  

Conclave ekobanda o mokolo mwa mosàla misato mwa sambo (7) ya sànzà ya mayi

Mikolo zomi na sambo sima ya miwà lya Pàpa François, batata episkopo wa lokùmù nkamà moko nà tukù misato na mitano oyo bakoki koponama, ba kosàngana kobanda mokolo mwa sambo (7) ya mayi mpo ya kopono Mokitani mwa Petro na mbala ya nkàmà mibale na tùkù motoba na sambo (267ème).

Albys KBD CP -Kinshasa/RDC

 

Batata episkopo wa lokùmu 135, oyo bakokisi nayino b ambula tùkù mwambé te, babiangemi na chapelle Sixtine ya ndako ya baPàpa na Vatican o mokolo mwa sambo (7) ya sànzà ya mayi, mpo na kopono Mokonzi monene ya bantomà mokoyà. Mokolo motiyami na sima ya liyangani ya mbala ya mitano ya congrégation générale, oyo esalemaki kobanda ngonga ya 9h00 kino 12h00 ya mokolo ya 28 ya sànzà ya aprili. Na likita lya bango, bato koleka tùkù mibale balingaki kolobela likambo lya mikakatano eklezya ekoki kokutana na yango, mabongi oyo Pàpa ya sika asengeli kozala na yango. Lolenge mibeko ya eklezya  Universi Dominici Gregis, oyo etiyaki mokoloto Jean-Paul II na 1996, nà mpe Benoit XVI nà François batiyaki maboko, conclave esengeli kobanda na mokolo ya zomi na sambo (17èmé jour ) oyo ezangi moto na ngwéndé ya bantomà (mokolo oyo elandi liwà lya Pàpa).  

Tango episkopo wa lokùmù oyo ya suka akolapa ndaye ya yé, moyangeli ya milùlù mya Pàpa akopesa liyebisi ya “extra omnes” elimboli na nkota ya latin ete “banso libàndà”. Ekotikala o kati ya chapelle Sixtine sé myangeli ya milùlù ya Pàpa mpe moto oyo baponi mpo ya kopesa bomanioli ya mibale, episkopo wa lokùmù Raniero Cantalamessa. Ye mpe azali episkopo ya lokùmu kasi ba poni ye tè mpo ya maponomi, azali moteyi mwa kala ya ndako ya Pàpa. Ba oyo mibale bakobima sima ya bomanyoli. Bongo sima, tata episkopo wa lokùmù Giovanni Battista Re, doyen ya Sacré Collège, akotuna lisàngà ya bayé baponaki mpo ya maponomi, soki bakoki kobanda yango.

Congrégation Générali ezali eloko nini?
Congrégation Générali ezali eloko nini?   (VATICAN MEDIA Divisione Foto)

Lolenge maponomi mikoleka

Mpo ya kopono Pàpa ya sika, nkombo ya yé esengeli kobima na mingongo ya bato koleka katikati ya misato (2/3), na banso bazali o kati wàna mpe baponi. Nokolo ya yambo oyo mwa 7 ya sànzà ya mayi, ekoleka mbala moko kaka na nsima ya nzàngà. Soki Pàpa aponami té na mba’oyo ya yambo, mikolo mikolanda ekosàlema mbala mibale, na ntongo mpe sima ya nzàngà.

Soki sima ya mikolo misato, litomba lilamo lizwami tè, maponomi makokatama mpo ya mokolo moko ya bopemi kati na losàmbo, masolo kati na bayé bazali kopono, mpe mwa lilendisi la molimo na moko ya ba episkopo ya lokùmù ya lingomba ya baepiskopo-diakono, oyo aleki bango na bambula, Dominique Mamberti. Sima maponomi ekobandela lisusu na lolengo yoko lokola na yambo. Soki sima ya mbala sambo (7 tours) baponi te, bakopema sika lisusu mpo na losambo, masolo, mpe elendiseli ya tata episkopo mosusu, bakozwa yé na lingomba ya basàngo, episkopo ya lokùmù Vinko Puljic, ya ekolo ya Kroati.   Bakokoba susu na maponomi mbala sambo, soki bazwi te, bakosàla mpe lisusu mwa kopema na losambo, masolo mpe elendiseli ya episkopo wa lokùmù oyo bakopona na lingomba ya baepiskopo, oyo azali doyen ya collège cardinalice. Kaka bongo teee kino bakopono Pàpa ya sika. Na tango ya kopona, kaka bankombo mibale oyo ezwi mingongo mingi ndé ekopesama mpo ya kopono. Esengeli ete bato koleka katikati ya misato 2/3 ba pona moko kati ya ba episokpo bazali wana ndé maponomi ekozala na motùyà.

Molinga ya moyindo(mwindu), Molinga ya mpembe

Bo o momeseno, boyùyà ya maponomi emonisamaka na langi ya molinga ekobima na likolo ya mombonda ya ndako ya chapelle Sixtine: Molingà ya moyindo (mwindu) ekolakisa ete nayino baponi tè, kasi molinga ya mpembe ekolakisa malamu ete Pàpa ya sika asili koponama. Milinga minà mokoùta na moto batumbaka balokasa ya voti na nzungo moko basàlelaka maponomi ut’o mobù 1939. Mpo ya kolongola mabulungani, molinga ya mpembe ekendaka elongo nà mindulé ya bangonga ya baziliki ya Saint-Pierre.

Ba episkopo wa lokùmù bakovanda na ndako Sainte-Marthe

Lolenge mibeko mya eklezya mopesami, ba episkopo oyo ba poni mp ona kopono Pàpa ya sika, basengeli na kobomba sekele makasi, na yango bakovanda na bonkùkù. Bakoki kokutana nà bato ya libandà tè. Conclave elekaka na mabélé ya etukà ya Vatican, kati ya Sainte-Marte bisika bazali kolala mpe chapelle Sixtine bisika maponomi mozali koleka mikolo minso. Bisika ya bansàmbo mpe milùlù epekisami na baye bazali na ndingisa ya kokoto kuna tè.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye

 

28 sánzá ya mínei 2025, 21:13