Luka

Bakimi-mboka ya ngambo ya Moniele (Esti) ya RDC na Burundi ya pembeni.  Bakimi-mboka ya ngambo ya Moniele (Esti) ya RDC na Burundi ya pembeni.  

Ba episkopo ya ekolo ya Rwanda nà Burundi basambeli mpo ya kimya kati na etùkà

Na nsuka ya liyangani la bango, esalemaki ut’o mokolo mwa 30 ya sànzà ya marsi kino o mokolo mwa 1er ya aprili na Kibungo na Moniele ya Rwanda, lisanga ya mayangani ma ba ordinaires ya Rwanda mpe Burundi ebimisaki liyebisi moko oyo ba episkopo bazali kokweyisa bokangisi ya mindelo kati na Burundi mpe Rwanda, bongo bazali kobelela mpo na likambo ya bozangi libateli na Moniele ya RDC.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Ekoki bongo mobù moko oyo mondelo kati ya ekolo ya Burundi mpe Rwanda ezali ekangemi. Mokano monà mozwamaki na Gitega. Akofunda ekolo ya Rwanda na likambo ya kosunga etulùkù ya batomboki Red-Tabara. Yango nde ezali na moto ya bitumba oyo ezali komema liwà o kati ya mabele ma yé. Kasi mbulamatari ya Kigali aboyi kofunda ena. Makambo maye moyebani ete sik’awa boyokani kati na bikolo biye babalé mosi mobebisami. Kutu ekolo ya Burundi efundaki oyo ya Rwanda ‘te abombaki bato baye balingaki kosàlà coup d’état na mabele ma yé ut’o mokolo mwa zomi na misato (13) ya sànzà ya mayi ya mobù 2015.

Na nsuka ya liyangani la bango lisalemaki na Centre Saint Joseph na mboka Kibungo, lisàngà lya ba episkopo ya Rwanda mpe Burundi (ACOREB) ba bimisaki liyebisi moko o mokolo mwa 1er ya sànzà ya aprili, ba episkopo bazali kolobela likambo oyo ya mawa kati na bikolo biye babale ya pembeni.

Basengi na bakonzi ya mipelengano nakoluka nzela ya boyokani nà mpe kimya, na matata mana mpo na kopesa libaku na bato batàmbola na bonsomi, biloko mpe misàlà mileka malamu. Ba Eklezya ya Rwanda mpe Burundi bakumisi mosàlà makasi ya boyokani ebandisami kati na ba mbulamatari ya bikolo biye babale.

““Na yoko mokili epayi wapi basusu bakokotisa bokeseni kati na bato, mpe basusu bazali kotonga ba efelo ya kokabola bato mpo na matomba ya bongayi mpe lokoso bwa bango, ba episkopo bazali kolendisa bandimi bakatoliko na kotiya mosolo mpo na kotonga ba gbagba (ponts), kotàtola bosàngani, bondeko ya mokili mobimba mpe bosolo”.”

Bitumba na Moniele ya ekolo ya RDC

Ba episkopo balakisi mpe mawa ya bango mpo na likambo ya ekolo ya Républiki démokratiki ya Congo, oyo, ezali kokufa mpo ya bitumba na Moniele ya ekolo mpo na batomboki ya M23. Bango ndé bazali kobungisa bomoyi ya bato, mpe kobebisa biloko; nà mpe kokima ya bato na ba etùkà ya biso. Balaki bozalani mpe losambo na bandimi; bongo bazali kolikya ete, kimya ekota na lombango.

Kobanda mokolo mwa 24 kino 26 ya sànzà ya febuali ya mobù 2025, lisàngà ya makita ya ba episkopo ya mabélé ma Afrika ya kati-kati (ACEAC) ekutanaki na Dar-es-Salaam mpo ya koluka kimya na ba etando ya ba etimà minene, mingi mpenza na ekolo ya Républiki Démokratiki ya Congo; liyebisi liyé liùti epayi ya ba episkopo ya Burundi mpe na Rwanda.

Basangani ya ACOREB bandimi na motema moko mpe bazali kopesa maboko na liyebisi ya lisàngà ya ACEAC. Mpamba te Aceac elendisi baye bazali kati na likambo ya bitumba ouo ezali koboma bato. Abengi banso mpo bazonga na likindo mpo ya boyokani, noki ete babongisa matata na lolenge ya kimya, na nzela ya masόlό ma solo makosangisa.

Lisàngà ya ba Episkopo ya ekolo ya Burundi (CECAB) nà mpe oyo ya ekolo ya Rwanda (CEPR) ba bongoli liyebisi liyé na lokotà ya mboka mpe ba panzi yango na ba paloase mpo ya kolamusa bandimi na kosambela n antina ya kimya kati na etùkà ya biso, bongo bazala banzeneneke ya bondeko.

Na yoko mokili epayi wapi basusu bakokotisa bokeseni kati na bato, mpe basusu bazali kotonga ba efelo ya kokabola bato mpo na matomba ya bongayi mpe lokoso bwa bango, ba episkopo bazali kolendisa bandimi bakatoliko na kotiya mosolo mpo na kotonga ba gbagba (ponts), kotàtola bosàngani, bondeko ya mokili mobimba mpe bosolo”.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

04 sánzá ya mínei 2025, 09:36