Cardinal Pizzaballa : «Yeruzalema ekotikala ndako ya losambo mpo ya bato banso»
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
O mokolo moye mwa mbila, ekofungola Poso Esantu mpe ekokundola bokoti ya Kristo na Yeruzalem mpo ya malozi ma yé. Na liyebisi lya yé, abeti nsete na likambo lya kimya ya engumba. Episkopo wa lokùmu Pierbattista Pizzaballa alaki na bango ete:“bakoleka eleko ya Pasika o bisika Yezu mei azalaki. Soki tosàngani na ye, tokozala mpe elongo na baye banso bazali na bwalé o kati ya biso o mikolo miye”. Kasi, malozi ma Yezu mpo ya Nzambe ezali liboba lya nsuka te na mokili; ekobaki yé koloba, nsékwa ndé liloba ya nsuka; bongo tosengeli kolakisa yango na oy’esika.
Malozi mpe nsékwa mozali koya ekolimbola mpasi enene Mabele Masantu etungisami na bitumba mpe boyinani. Mpo ya manaka ya ba julien nà ba grégorien mikokani, bakristu bakosepesa Pasika elongo nà bango. Bongo asengi ete batàtola bolingo bwa Yezu mpo na bomoko kati na biso, nakolingana, kosungana biso na biso, mpe kolimbisana.
Kozala bayé bakotonga kasi ya kobebisa te
Patriarche latin ya Yeruzalema asengi na kobatela eyamba ya engumba na masenginya mpo ya kokomisa yango esika ya bitumba to bokabwani. Tobanga te bayé balingi kokabola, kopusa mosika, kobotola molimo ya engumba eye Esantu; ntembe te, Yeruzalema ekotikala bobele ndako ya losambo mpo ya bato banso, moto moko te akoki akoki kobotolo yango. Akobi koloba ete, Yeruzalema ezali esika ya liwà mpe nsékwà ya Kristo; bongo ezali esika ya boyokani, ya bolingo oyo ekobikisa mpe ekolongola mindelo ya bwalé mpi liwà. Oyo ndé boséngà ya biso lelomei: kotonga, kosangisa, kobuka mindélo, kolikya. Episkopo wa lokùmu alendisi bandimi na kotombola miso likolo mpe kotiya motema na Nzambe mpo ya kobelela likabo ya kimya mpe bomoko.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.