Mgr Dumus atàtoli été Pàpa azalaki kolinga ba- Haïti
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Episkopo Pierre-André Dumas akundoli lisungi lya Pàpa François tango inso mpo ya ba-Haïti. Tango inso ekolo ezalaki koleka na mobulu, Tata-Mosantu azalaki kobondela mpo na bato ya Haïti mpe asengaki na lisànga ya mokili mobimba ebosana yango te. Azalaki na bokengi makasi na mpasi ya ba-Haïti, ekobaki koloba episkopo ya Anse-à-Veau nà Miragoâne. François azalaki mbala na mbala ko dénoncer bozangi libateli mpe mobulu ya ba gangs, mingi mingi mpenza na tango ya Angelus ya mokolo mwa zomi na misato ya sànzà ya zomi moleki. Mpo na episkopo monene Dumas, Pàpa oyo akufi, alakisaki bomoto oyo emonanaka mingi te mpe azalaki koyoka babolà mpe bayé bazokà na bomoyi bwa bango
Akokoba kobenisa biso
Mpo na episkopo Dumas, liwà lya Pàpa François ezali oyo ya Tata moligami mpe mokàmbi mamolimo. Atiki libula ya motuya yakolandela. Lokola «akeyi o ndako ya tata, akokoba kobenisa biso mpe ya kopesa makanisi na mikili mobimba ut’o likolo». Liwà lya yé o eleko ya Pasika elimboli botùyà ya nsekwa ya Yezu Kristo oyo ekomema elikya na mokili.
Eklezya lopitalo ya mboka
Na kosukisa, Episkopo Dumas abwaki mbela ya kolanda bikélà bya Pàpa François, nakosàlela basusu mpe nakobatela ekélà ya yé. Akumisi yoko eklezya ezongi bolenge, ezali kokende pembeni ya babolà mpe ya bato banso, eklezya ya mindondo te, ya bosàwà, efungwami mpo na banso, lokola François alingaka.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.