Bankulutu koleka nkoto zomi (10 000) bakulaki batisimi : ezali bofungwami to bofuluki mpo na eklezya ya ekolo ya France
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Mgr Olivier Leborgne, episkopo ya ya Arras, alobi ete mwa eloko esalemi, ezali kokamwisa biso kasi mpe ekopesa esengo. Litàtoli mpo ya motuya ya bakatekimeni na france. Na mobù moyé ya 2025, bakozala 10384 o kati ya badiosezi 98, bayé bakokula libatisi mpe bakokota na lingombà ya bakristu ya ekolo ya France. Motango moyé mobakisami mbala mibale koleka na mobù 2023. Lolenge yoko na bilenge; bakozala 7 400 babatisi basika, nzokande na mobù 2024 bazalaki sé 5000. Kati na bango, mingi mingi ezali bana ya bambula kobanda zomi na mitano (15 ans) kino tukù mibale na mitato (25 ans) ndé basàli motuya ya bato 4000. Atako bongo, kasi molongo ya bato ya bambula misusu mpe bazali kosenga kokula batisimo
Bana oyo bakoli na ba réseaux sociaux, bakundoli lolenge ya kotambola na nzela ya boyambi, nzokandé bazali koluka masàngà ya solo, bato basolo mpe bisika biye bakokende kotika bango, elobi Catherine Chevalier, moyangeli mwasi ya «Annonce et accompagnement de la vie chrétienne» o kati ya eklezya ya France. Bikéla ya boyambi babango emonani: - na mposa ya kosàla mobembo (ndakisa ya bilenge 13 000 ya Ile-de-France oyo bakokende na Lourdes, cité ya Mama Maria kobanda mokolo mwa 12 kino 17 ya sànzà ya aprili mokoyà), mposa ya kozwa libatisi sima ya bikwélà ya mbotàma ya mwana to liwa ya moto moko na libotà.
Bokόli ya kala te
Ut’o mibù misato molandani, libatisi ya bamikόlό ezalaki bongo bongo, motuya mwa yango mpe ekitaki o ba mitùkà mileki. Na mobù 2000, baye bazwaki libatisi bazalaki 400 000 o mobù mobimba kasi na 2020 bakitaki na 200 000. Motuya ya nkotisa emati mpe lokola. Bakόlό koleka 9 000 bakulaki batisimo na boùmeli ya mobù 2024; baleki bongo na mbala mibale, baye bakulaki na mobù 2022.
Kokanisa lisusu lolenge ya kosalisa bakatekimeni
Cécile Eon, déléguée nationale ya «Catéchuménat des adultes», alobi ete liboso, bakatekimeni bazali moke, moko to mibale na mobù na palose moko; sik’awa bakomi zomi. Eklezya etangi bongo motuya ya 31% ya balendisi, lokola bato 11 000 koleka. Mpo ya ebele ya bokoti ya batisimo biye, eklezya esengeli koluka lolenge malamu ya kobongisa lisusu. Na nzela ya ba reseaux sociaux, ba paloase bazali kotinda ba influenceur ya bakatoliko, ba muvema nà ba grupi mpo ya kokamba bana. Océane, collégienne ya mboka Poissy, elenge mwasi moko, ya bambula zomi na ineyi (14 ans) apesi litàtoli na yé: “boyambi bwa ngai bozali kokola na lisalisi ya grupi ya omoneri ya collège”.
Etikali sé lokola mokakatano
Eklezya ezali mpe kokanisa lolenge ya kokotisa o lisàngà sima ya sakramentu eye, baye bazwi libatisi sika. Catherine Chevalier akobaki koloba été, atako mokakatamo ezali, kasi esengo ezali monene, mpamba te ezali kofungola biso ndenge misusu ya kosakola boyambi, yakosàla mitùnà.
Yubilé ya bilenge na eleko ya été 2025 na mboka Roma, ekozala libakù makasi mpo ya baye bazwi libatisi sika, ya kokundola eklezya ya mokili mobimba sima ya kotambola elongo na eklezya ya bango ya mboka. Makambo mibalé ya ntina eko tiya elembo na mobembo ya bango: ya yambo koyebana kati na bango bato basika ya mabele ya poto ; ya mibale koleka o Ezibelo Esantu ya baziliki ya Saint-Jean-de-Latran elongo nà Bato banso ba mboka France, nà losàmbo mpo ya baye bandi bomoyi bwa bokristo sika.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.