Luka

Bililingi mpo ya ndakisa Bililingi mpo ya ndakisa  (ANSA)

Mpo ya Pax Christi, non-violence ezali ndé fungola ya kimya.

Kokolisa ezalela ya boboto mpo na kobongola mokili oyo ezwami na mobulu. Oyo ezali nde eloko Pax Christi international azali koluka, esika wapi mokili ezali kokatisa eleko ya matata ebele. Etinda ya yé ezali boyokani. Masolo esalemi nà Martha Inés Romero, mokomeli monene ya organisation katoliko.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Non-violence ezali boponi ya bomoyi oyo ezali kobyanga biso nakozongela  kaka mabongi mwa molimo, mwa lolenge ya ezalela ya bankoko mpe sociale mpamba te, kasi mpe citoyenneté active oyo ekoki kosàla ete influence sociopolitique ebendama mpo na makambo ya bato banso. Na masolo ma yé, Martha Inés Romero, alimboli ete: Pax Christi ezali moziki moko ya katoliko mpo ya boboto (kimya). Azwaki mokumba moye na sànzà ya yanuali ya mobù 2023, kasi azali mpe coordinatrice ya Pax Christi na Amerika Latine mpe Caraïbes ut’o mibù zomi na mitano (15 ans).

Lolenge kani kopesa likanisi lya non-violence lokola mwango mosusu ya malamu mpe oyo ekoki kosalema, na eleko oyo wapi lisàpo ezali kolobama ezali kaka ya kozongéla mandoki lokola eyano ya motùyà?

Pax Christi internationnal eyebi été kozongela bibundeli ékomatisa lisusu mobùlù, bongo mobùlù ekoki kobongisa matata mpo ya séko te. Endimi ete tozali na makoki mpe lotomo ya kopekisa matata ya somo na bikéla ya non-violence. Bandimi oyo elobi Pàpa françois ete: “bitumba ezali séko bozangi elongà (kopola) ya bomoto”. Mp ona Pax Christi internationnal, non-violence ezali boponi ya bomoyi oyo ezali kobyanga biso nakozongela  kaka mabongi mwa molimo, mwa lolenge ya ezalela ya bankoko mpe sociale mpamba te, kasi mpe citoyenneté active oyo ekoki kosàla ete influence sociopolitique ebendama mpo na makambo ya bato banso.

Pàpa awuti koloba kala mingi te nakolongola bibundeli ya maloba, ya milimo mpe ya mabele; epayi wapi tosengeli kobanda?

Esengeli kokéla bisika neti «espace-physique, virtuel ya masolo mpe kolobela makambo oyo etali bisika ya mboka mpe ya mokili mobimba». Bisika biye bisengeli kosalisa bato nakomema likabo la bango mpo ya bolamu bwa bato banso, moko te akoki kosàlà oyo alingi te. Bisika basengeli koyebe ete ezali mpe n ana ba eyamba misusu, ba ezalela ya bankoko misusu oyo ezali kosenga eyebana mpe etosama. Na manso, esengeli kokolisa bisika ya kobatela bomoyi, ba ezalela ya bankoko, bato basusu, nà baye bazali kokanisa kaka na mombongo ya mabanga mantalo, nkita ya mabélé mpe bongo na bongo. Bakokanisaka te  na kilelo mpe nà kilobi y abato bavandi bisika enà. Tobongola milimo mpe mitema mya biso, na nzela ya boyambi bwa biso, oyo ekolakisaka biso elongi ya Nzambe malamu,Nzambe ya solo, oyo amonaka mpasi y abato ba yé mpe apesaka bango lokumu. Tango tokolobela non-violence, tolingi kolakisa misàlà ya motema mawa, ya kozala lisàngà, mpe ekobongola makambo yam pasi eye ezali nayino koleka. 

Lolenge kani tokobongola maloba ya non-violence, ya kimya na bikéla ya solo kati na matata ya bibundeli ?

Esengeli kozongela komona misàlà ekonyokolo bato mpe mokili. Soki toyebi malamu mpeza, moko na moko tokoki kobanda na kobongisa boyokani, ezalela mpe biloko biye bibébaki. Ezali kosenga ete oyeba kondima bomoto ya moto oyo azali kobundisa yo, kasi kotalà yé lokola mongunà te. Bato bamboka andins pesaki lisésé liye: “Zumaaak Kawsay” elingi kolimbola “Kozala Malamu (Bien Vivre)”. Mpo ya biso, elakisi ete tosengeli kobatela ndako ya lisanga, ya PachaMama mpe bisika biye kati na biso bato bazali kovandela. Mp ona yango tosengeli kolongola bibundeli na ntina ya kotonga lisusu lokola ezalela.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

05 sánzá ya mínei 2025, 13:30