Luka

2025.04.06 Yoko Festival ya bakristu na ekolo ya Suisse, 2025.04.06 Yoko Festival ya bakristu na ekolo ya Suisse,   (©Festival Open Sky)

Na ekolo ya Suisse, yoko festival ya bakristu mpo ya « kotiya bitambe bya yambo na boyambi»

Festival «Open Sky» ekokisi 6ème edition na yango. Ndé bongo ekei komifandisa na engumba ya Sion o mokolo mwa poso mwa 5 avril. Mpo ya Romain Barras, mokambi mwa festival mànà, motùya ezali : « kolakisa na bato ete bakatoliko bazali normaux, kasi bazali mpe na etelemiselo oyo bakoténgamela».

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

«Ezali festival oyo bilenge babandisi mpo ya baninga babango bilenge basusu» emonisi polele Romain Barras, elengo moyekoli ya b ambula tukù mibale na moko (21 ans). Azali mokambi ya festival «Open Sky» oyo elimboli ‘te « lola ya kofungwama». Milùlù mwa yango molekaki o mokolo mwa poso mwa 5 aprili na Sion, mboka-mokonzi ya canton na Valais na Suisse.

Pene ya bilenge nkoto yoko, ya bambula kobanda na zomi na motobà (16 ans) kino tukù misato (30 ans) basànganaki na ekwèlà enà. Esàlemaka bongo sima ya mbula mibale ut’o lotukà moko ya mibù. Kasi «mbul’oyo, toponi esika mosusu», elobi Romain Barras ; festival esalemaki na Campus ya eklezya ya Sacré-Cœur na Sion. Ntina ya festivale wana ezali sé yolo: “kopesa libakù na bilenge ya kokundola to kokundola lisusu boyambi”.

Mpo ya miùlù minà manaka mizalaki ndenge na ndenge, mpamba te, “eloko ya liboso ezali ete: bokutani nà Yezu ekoki kosàlema na tango ya adoration, to ya concert moko ya louange, kasi tango mosusu na kokabola lisolo na ndeko moko na mopanzi ya bar”. Na yango, ba mayangani mpe likindo lisengelaki kosalema, ba maboké mpo ya kosekisa mpe ba pokwa ya DJ ya eleko ya ba mibu “80”, nà concert ya etulùkù ya lyonnais Collectif Pierre, adoration ya séko, makoki ya kotùbela mpe basàlàki Misa, “na esengo, banzembo kitoko, na mpe miziki”. Elenge oyo mobali, andimaki mokumba moye ya kokamba bilengé kobanda mobù 2023 sima ya kosangana na bilenge basusu na JmJ ya Lisbonne.

Tozali nà etelemelo oyo tokoki koténgama

“To lingi kobima na banungu-nungu y abato ekolobaka ete: Bakatoliko basambelaka mokolo mobimba na ba grotte. Tosàlàka lolenge yoko na basusu, kasi tozali nà etelemelo moko oyo toténgamelaka. To zali na bomoyi oyo ezali n antina mpenza”. Elikya ya elenge mobali oyo, ezali ete bilengé basabganaki wana, bazonga nà makanisi oyo ekosunga bango bakoba koyamba mokolo na mokolo nà baninga basusu. Atako bazali kosàlela mingi te misàlà ya lingombà nà ekolo ya Helvètes, mokambi ma bilenge, Romain Barras akobomba elikya nzokandé alobi: mingi mingi bilenge ya etùkà ya yé bazali komitùna mpo ntina ya bomoyi, bongo balingi koyeba mpo ya boyambi bwa ngai.

Elilingi ya  Mosantu mwa sika mokoyà, Mosantu Carlo Acutis.
Elilingi ya Mosantu mwa sika mokoyà, Mosantu Carlo Acutis.   (©Festival Open Sky)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

 

06 sánzá ya mínei 2025, 17:12