Angelus : Kati na bozangi Elikya, Nzambe akoyamba biso nà ekopi ya yé ya bofuluki.
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Lolenge yoko na balomingo loleki, ndako ya bopanzi-nsango ya Saint-Siège ebimisaki malendisi mya Pàpa mpo ya losambo la Maria la Angelus. Na libakù lya milùlù mya lomingo la Mbila (Mandalàla) mpe mya Malozi mwa Mokonzi (tala na Lc 22, 14-23, 56), alimboli lolenge Yezu azali koloba nà Tata wa yé : «Tata, soko olingi, longola nkeni eye épai ya ngai ; nzokandé, esàléma te lokola ngai na lingi, kasi lokola elingi yo (22,42) ; Tata, limbisa bango, zambi bayebi té nini bazali kosàla (23,34) ; Tata, na tiki molimo mwa ngai o maboko ma yo (23, 46)».
Kolonga minyoko mya biso na lisàlisi lya boyambi.
Tomoni Yezu awa atamboli o nzela nà kùrùzé, lokola mwana o mapeke matata wa yé, azali bongo mpamba na nsuni, azangi bokengi, mpe bayokisi yé nsoni. Kasi atiyi motema sé na Tata wayé kino alali mpongi ya liwà o maboko ma yé. Pàpa alobi ete, manso mayé, mazali ndakisa tokoyekola epai ya Yazu. Lokola ayebi ete biso banso tokokutanaka na mpasi, bolembu bwa nzoto to ya molimo, alobi ete boyambi ekosàlisa biso nakomitiba na bolembù bwa nzoto tè, tomikangisa na bwalé te kasi tolonga lyango lokola Kristo nà lisalisi lya ekopi ya bofuluki bwa Nzambe ntà ngolu.
Na nsuka lya malendisi mya yé, Episkopo wa Roma atondi bakristo bamokili mobimba mpo ya nsambo ya bango. Zambi alobi ete mpoya eleko azalaki na bolembù bwa nzoto, nsambo enà esalisaki yé na koyoka bondeko, mawà mpe bolingi bwa Nzambe. Alaki bango ete akosambela mpe mpo ya bango. Asengi na bango, elongo nà yé, babonzela Mokonzi, bayé banso bazali na bwalé, mingi mingi bato bazwami na bitumba, na kibobolà, to na makàmà ndenge na ndenge ya mabele. Mingi mpenza, nzambe ayamba bayé bakufi na kobukana ya yoko ndako ya mabina na ekolo ya Saint-Dominique, bongo akamba mabotà mabango. Net ina poso eleki, Pàpa alobeli mpe ekolo ya Ukrayina, oyo ezali konyokwama bomartiro ya bitumba, ekolo ya Palestina, Israël, République démocratiki ya Congo, ekolo ya Birmaniya mpe Soudan ya Sud».
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.