Likita ya Papa: Yezu akobimisa biso na emoniseli ya lokuta ya bolingo
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Na liteya ya lelo mokolo ya misato ebimisami na Ndako ya makita ya bapanzi nsango ya Vatican, Papa wa Roma azali kokoba bopemi na ye, akofungola eteni ya sika na molongo ya Jubilé na likambo likonzi “Yezu Kristu elikia na biso”.
Papa azui mokano ya kobongisa mwa bomanyoli bitali masese bilobamaka na Yezu. Masolo yango bikozongela “bilili pe makambo ya bosolo ya mokolo na mokolo” pe ekotinda na makasi moko moko ya komitala, elobi ye, na bomituni “epayi wapi nazali na lisolo liye?”
Po na mokolo eye ya misato ya Poso Esantu, François akotelema na lisese “eyebani koleka”, eye ebengami na kombo ya “Mwana abungaki”, eleko leki ya mobali asengi tata na ye eteni na ye ya libula, asakani na mosolo na ye liboso ya kozonga epayi ya tata oyo ayambi ye na “bosali nteke”, na bobimisi kanda ya mwana mobali ya liboso. Mopanzi nsango elamu Luka asemboli na bolobi tè Yezu akobeta lisese eye na ba farizeo na bakomeli, baye bakotelemela Yezu tango alei epayi ya basumuki. Wana ezali elembo po na Papa tè lisese eye ezali po na “baye babungi kasi bayebi te pe bakosambisa basusu”.
“Nzambe akoya ntango inso koluka biso”
Po na Santu Papa, lisese eye ezali liboso mpenza liloba ya mozindo ya elikia, po “epayi wapi tobungi, /…/ Nzambe akoya ntango inso koluka biso”, na botangi elili ya mpate ebungi likolo ya kolemba, to libende moko ya mosolo ekweyi na mabele kasi bakomono yango lisusus te. Kasi na lisese, bana mibali mibale babungi, leki po “alembi bokutani moko amonaki tè elekelaki ye” pe kulutu na “lolendo to na kanda ya motema na ye”.
“Leki ya lisese akokanisa kaka na ye”, esosoli Papa François, oyo akolakisa mokoloto moko ya kimoimi ezali na tango ya bomwana pe ya bolenge, pe ekobi tango mosusu na kimokolo lelo. “Bakolo baye bazali kokanisa tè bakozala bango-mei, nzokande, babungi, po ezali kaka soki okobika po na moto moko nde okobika ya solo”, ekobaki Papa wa Roma.
Emoniseli moko ya lokuta ya bolingo
“Bolingo ezali likabo moko ya motuya, esengeli kobatela yango na bokebi”, ekobaki koloba François, lolenge ya leki te oyo aluki bolingo kasi “abebisi yango, asilisi lokumu na yango”. Na emoniseli ena ya bolingo ya lokuta, bobangi ezali tè osengasenga bolingo “na mokonzi ya liboso akoya” pe obanda kobika na moto lokola mosali, “lokola esengeli tofuta mbemba moko to lokola bolingo ya solosolo ekokaki kozala te”. Na elili ya leki o eleko ya nzala aluki kozonga epayi ya tata na ye lokola mosali.
“Kaka oyo alingi biso ya solo akoki kobimisa biso na emoniseli ena ya lokuta ya bolingo”, elobaki Santu Papa, oyo atangaki tableau ya Rembrandt, moto ya elenge mobali ekokani na ya mwana, elembo ekolakisa tè “mwana eye azali kobotama lisusu”
Kanda ya kulutu
Na bosukisi bomanioli na ye na ezaleli ya kulutu, François amoni tè azali “mosika na motema”, alingaki tango mosusu kotika tata na ye kasi atikali “na bobangi to na lotomo”. “Tango ozali komesana na likambo yo olingi te, okobanda kovandisa kati na yo kanda moko eye, lelo to lobi kuna, ekopanzana”, ekebisaki ye.
Tango aboyi bozongi ya leki na ye, pe ya “kokabola esengo ya tata na ye”, kulutu ayambi tata na ye oyo ayaki kaka po na “koyokisa ye bolingo na ye”. Elili ya tata atiki ekuke ya kofungwana ezali eye ya Nzambe “oyo akozela biso, akomona biso na mosika pe akotika tango inso ekuke ya kofungwama”.
François asukisi liteya na ye na bosengi na bandimi ya komikokanisa na bana mibali mibale ya lisese eye pe ya kosenga na “Nzambe Tata ngolu ya komona biso lokola nzela ya ndako”.