Matanga mya Pàpa François mikosàlema o mokolo mwa poso mwa tukù mibale na motobà (26) ya sànzà ya aprili.
Mpo ya matanga ya Mokonzi monene wa bantomà, Pàpa François, Misa mikosalema na lopango ya baziliki ya Saint-Pierre, mokolo mwa poso mwa tukù mibale na motobà ya sànzà ya aprili, na ngonga ya 10h00, o mokolo mwa yambo ya novemdiales, lolenge ya Ordo Exsequiarum Romani Pontificis (nn. 82-109), esakoli bongo office ya ba milùlù ya Pàpa, mokolo moye mwa mibale na tongo. Bakokunda yé liboso ya mokolo mwa lomingo la Ngolu ya Nzambe.
Milùlù mikokambama na tata episkopo wa lokùmu Giovani Battista Re, doyen ya Collège ya ba cardinali.
Nsima ya misa, bakosàla Ultima commendatio et la Valedictio. Na nsima bakomema sanduku ya ebembe ya Mokonzi monene ya bantomà ut’o baziliki Saint-Pierre kino oyo ya Sainte-Marie-Majeure mpo ya bokundi
Kasi liboso, ebembe ya episkopo wa Roma ekozala libanda na baziliki Saint-Pierre mpo ete bandimi bapesa yé mbote ya nsuka. Bakomema sanduku ya ebembe na molongo ut’o ndako Sainte Marte kino na baziliki Saint-Pierre na tongo ya mokolo mwa misato; bakoleka na place Sainte Marthe, Place ya ba protomartiro ya mboka Roma, Arco delle Campane, yambo te bakota na baziliki ya Vatican.
Milùlù mya liloba mikokambama na lotale ya bantùbélà, na lisalisi ya tata episkopo wa lokumù camerglingue, nsima na yango, bandimi bakobanda kopesa lokùmu na ebembe ya Pàpa. Bakambi bya bikolo mpe ya bitukù nziké batindi maloba mya bango mpo ya kozala elongo o mokolo monà.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.