Luka

Na banzela ya Roma, fulu ya bato ezali kopesa limemya na Pàpa François oyo akufaki o mokolo mwa tùkù mibale na moko (21) ya sànzà ya aprili 2025. Na banzela ya Roma, fulu ya bato ezali kopesa limemya na Pàpa François oyo akufaki o mokolo mwa tùkù mibale na moko (21) ya sànzà ya aprili 2025.  (ANSA)

Matànga ya Pàpa François : Mutuka ya kund’ébémbé na banzela ya Roma

Mbala moko sima ya Misa ya bawà ya 226ème Pàpa ya eklezya, mutuka ya kund’ébémbé ememaki nzoto ya Bokonzi monene ya Pàpa ya Argentin. Elongwaki place Saint-Pierre, ekendaki nzela ya Sainte-Marie-Majeure esika wapi bokundami elekaki na bonkùtù mpenza. Bisika biye mibale ekabwani na mosika ya ba kilometre mineyi (4km). Na banzela eye ya Roma, bandimi bakristo mpe bato basusu balakisaki limemya mpe bapesaki mbote ya nsuka na episkopo ya Roma.

Albys KBD CP – Kinshasa/RDC

 

Lokola elobamaki, na nsima ya Misa ya bawà esàlemaki na libanda ya lopango ya baziliki ya bapàpa na Vatican, sanduku ya ebembe ya François ememisamaki na Pàpamobile ya langi ya mpembe. Sanduku esàlemi na mabaya mpamba mpe zinc ; likolo na yango bakomaki devize ya ba Jesuites na nkota ya latin: IHS, elimboli ; Iesus Homini Salvator (Yezu mobikisi ya bato). Batambolaki mwa kati kati ya ngonga yambo ete bakoma na Sainte-Marie-Majeure, esika oyo wapi Pàpa ya Argentine atikaki maloba ete ébémbé ya yé ekokundama.

Nzela kund’ébémbé elekelaki na kati ya Roma
Nzela kund’ébémbé elekelaki na kati ya Roma   (ANSA)

Nzela kund’ébémbé elekelaki

Kund’ébémbé elongwaki na ngonga ya 12h15. Elekaki nayino o kati ya baziliki Saint-Pierre, tango ngonga ezalaki kobete. Sima mutuka ebimaki na ngambo ya Porta del Perugino, ezibelo oyo ekomemaka na ngambo ya Sudi mpe Ouest ya Vatican. Na batelevision ya minene batiyaki na nzela ya Via della Conciliazione, bato ya libanda bazalaki kolanda nyonso. Mutuka Papamobile ezalaki kotambola na mbango ya bakilometre zomi na ngonga (10km/h). Ba mpulusi bazalaki kokende na yango malembe malembe, bakatisaki ebale ya Tibre (Tevere), yambo ete bakoma na esika ya Piazza Venezzia, bongo bazwaki nzela ya Forum romain na ya Colisée, bisika azalaki kosàla nzela ya kuruzé ya mwa mitano ya Pasika. Na sima babalukaki na nzela ya kokende na baziliki ya Mama Maria.

Bopesi limemya na banzela ya Roma
Bopesi limemya na banzela ya Roma   (ANSA)

Bato pene ya nkota nkàma moko nà tùkù mitano (150 000) bazalaki na banzela ya Roma

Na bokula ya banzela ya mboka-mokonzi ya ekolo ya Italie, bato pene ya nkota nkàmà moko nà tùkù mitano basànganaki bitulùkù na bitulùkù bipayi na bipayi. Bazalaki kopesa mbote ya nsuka na Pàpa François, bazalaki kobete maboko. Epayi mosusu, nà batshombo na maboko, bilenge, babangé, bandimi bakristo, bato bamobembo, banso bazalaki kozwa bililingi ya kund’ébémbe oyo ezalaki kokoba kolanda nzela ya yé. Na balininisa ya bandako, bakokaki koyoka mangongo y abato bazalaki kobelela “Vive le Pape! Vive le Pape”.

Kund'ébémbé na bokatisi banzela ya Roma
Kund'ébémbé na bokatisi banzela ya Roma

Babonzi (batiki) Pàpa na maboko ya Salus Populis Romani

Tango ébémbé ekomi na Sainte-Marie-Majeure, elongo na banzembo bamemaki sanduku ya ébémbé na kati ya baziliki liberienne. Liboso ya batata episkopo wa lokùmu, banganga-nzambe, babonzaki yé na maboko ya Salus Populis Romani, Ngondo Maria oyo François «asilaki kopesa bomoyi mpe mosàla mwa yé ya bonganga».  

Lokola moninga ya babolà, sanduku ya ébémbé ya François eyambamaki mpe na mwa etulùkù ya bato oyo ya ntina te basanganaki wana na makolo ya baziliki ya bapàpa. Kati na bango, ezalaki na bato baboloko oyo bakutanaki na françois na boloko ya Rebibbia. Bazalaki komema o maboko ma bango, moto na moto fulele ya rose ya langi ya mpembe.  

Kokoma ya Sanduku ya ébémbé ya Pàpa François na Sainte-Marie-Majeure
Kokoma ya Sanduku ya ébémbé ya Pàpa François na Sainte-Marie-Majeure

Kokoma ya sanduku ya ébémbé na Sainte-Marie-Majeure

Bokundi esalemaki na bonkùtù okati ya baziliki ya Sainte-Marie-Majeure, ekwelà ya yambo ut’o mibù nkàmà misato mileki mpo na boko bokonzi monene ya pàpa. Ezali ndé o kati ya baziliki oyo ya kala ya Maria, esuki bongo « mobembo mwa François ya nsuka o nsé ya mabélé eye». Bakundi yé epayi wapi azalaki kokende kosàmbela yambo ya kokende mpe kozonga ya mobembo wa yé lokola mokitani ya bantomà.  

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.

 

27 sánzá ya mínei 2025, 09:24