Luka

Liyebisi lya liwà ya Pàpe François na Sainte Marie Majeure Liyebisi lya liwà ya Pàpe François na Sainte Marie Majeure  (vincenzo livieri)

Mokanda ya Bosengà bya nsuka ya molimo ya Pàpa François yambo atika nsé eye

Mokonzi monene mwa ba ntòmà, akomaki na mobù 2022 boséngà bwa yé bwa nsuka na maloba maye: malita mayè mozala ba basiliki ya Sainte Marie Majeure. Vatican News abimisi mobimba ya mokanda monà.

O nkombo ya Basato Basantu. Amen

Lokoya na yebi ete bomoyi bwa ngai bozali kokòma na mpokwa na yango, nzokandè na kolikya na bomoyi bwa nseko, na lingi kotika bosenga bwa ngai bwa nsuka, kaka mpo na bokundi bwa ngai.

Na bonzèlà bomoyi, bonganga mpe boepiskopo bwa ngai na Mama wa Mokonzi wa biso Mosantu santu Maria. Na yango nakosenga ete ebembe ya ngai epema na ndakonzambe ya Sainte Marie Majeure, mpo ya kozela nsékwà ya bawà.

Nalingi ete mobembo mwa ngai mwa nsuka onsé ya mabélé esuka na ndako ya lokùmu ya mama Maria, epayi wapi na zalaki kokende kosambela liboso mpe sima ya mobembo mwa ngai lokola mokitani ya bantòmà. Nazalaki kotika makanisi ma ngai manso ya motéma na mama abotami na mbindo te, mpe nazalaki kotondo yé botondi mpo libatéli mpe mpo ya bolingi bwa yé ya bomama.

Nakosenga ete ba bongisela ngai lilita lya ngai o kati ya ndako oyo ezali na esikà pembeni na kati-kati ya Chapelle Pauline (chapelle de la Salus Populi Romani) nà Chapelle Sforza ya baziliki ya baPapa, lokola balakisi yango na pièce jointe.

Bakunda ngai na mabélé mpamba, batiya ba decoration mingi mingi te, kasi bakòma kaka nkombo ya Franciscus

Mbongo mpo ya kokunga ngai ekozala ya nsinsani ya batobalamu oyo batiyaki pembeni mpo ya baziliki ba pesà na baPàpa, Sainte Marie Majeur. Na pesaki mitindi malongobani na Mgr Rolandas Makrickas, Commissaire extraordinaire du chapitre libérien.

Tika été Mokonzi apesa mbano oyo ebongi na bayè banso balingaki ngai mpe bakokòba kosambela mpo ya ngai. Bwalé emonisami na mikolo mya nsuka ya bomoyi bwa ngai, ezali libònzi na mokonzi mpo ya Kimya o mokili mobimba, mpo na bolingi kati na bato

Akòmaki yango na Sainte Marthe, o mokolo mwa 29 ya yuni ya mobù 2022

François 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.

22 sánzá ya mínei 2025, 12:11