Na Bililingi moko ebimisami nayino te, Pàpa asengi na bilenge: “Boyekola koyoka, ekosalisa mpo na kimya”

Na bililingi moko bazwaki na mikolo ya yambo ya sànzà ya yanuali ya mobù moyé, Mokonzi monene ya bantomà azalaki kolobela bilenge oyo basanganaki mpo na likanisi lya Atelier d’écoute boye : « Bobosana bankoko ba bino té, bakotangisa biso mingi ».

Bansàngo ya Vatican

 

«Bandeko bilenge mibali mpe basi, eloko ya motuya na bomoyi ezali koyoka, koyekola koyoka. Tango moto azali kolobela yo, zela nayino asilisa, mpo okundola malamu oyo alobi mpe sima, soki ozali na mposa, okoki koloba mwa eloko ; kasi eloko ya ntina ezali koyoka». Maloba wànà ezali mbélà Pàpa François abwakelaki bilenge na video moko ya mokolo mwa mwambé na nzela ya tshombo na yé ya smartphone na ndako Sainte-Marthe. Liyebisi ebimisamaki na site ya Itali ‘Oggi’. Elobelaki bilenge oyo basànganaki na Atelier d’écoute,  likanisi liùtaki na Luca Drusian, moto azali kosàngisa bilenge na bakulutu mpo yam asolo ndenge na ndenge. Akopesa bongo libaku na baiké na kokundola bonzenga ya koyoka, ya boyokani moko na mosusu mpe boyoki.

Na mwa video ena, Pàpa azongeli kolobela bilenge: “botala malamu bato; bayokaka te, bakoyanola bobele na ndambo ya ndimbola moto apesi, bongo ndé esalisi te na koluka kimya. Bosengeli koyoka, boyoka mingi”. Alendisi bango mpe mpo na likambo etali bankoko, asengi “babosàna bango te mbamba te, batangisaka biso makambo ebele”.

Oyo ndé ezali maloba malongobani mpo ya kosukisa mokolo moye mwa tukù mibalé na sambo (27) ya sànzà ya aprili, mwa Yubilé ya bilenge na Roma.

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika

28 sánzá ya mínei 2025, 12:22