Na Roma, Bilenge basàli Yubilé ekotikala na lisàpo
Bansàngo ya Vatican
“Lisapo”. Maloba mozali kozongelana monoko mwa bilenge oyo bakutani mikolo miyé na banzela ya Roma. Bazali kotambola makasi na mushashino mpe baluchon na mokongo.
Béatrice azali elenge mwana ya mboka France, aokisi ba mbula zomi na mineyi, aùti na Lyon elongo nà diosezi na ye, bayei mpo na Yubilé. Ebongisi na yambo boluboli ya elengé mwana ya Italie, Carlo Acutis. Bana bapesi matàtoli mabango: “Tango toyokaki ete Pàpa akufaki, tomitunaki soki yubilé ekozala kaka … esengo mingi nzokandé esàlemi!!” mosusu alobi “tangi inso nazongaka na mobembo, nakomaka na bonsomi”. O mopanzi mwa yé, Arthur mpe Zoé, banso baùti na Collège Charles de Foucold na Lyon. Bazali na esengo mpe baseki na mbembo mpamba te, mpo ya bango “Pàpa akokisi etindà ya yé”, elobi Arthur. Asepeli mpo asangànaki na Misa ya matanga ya Pàpa oyo awei. Na ngambo na yé, Zoé alobi ete “toùti kozala na mboka Assise, tomoni bongo to yebi sik”awa nini epesaki François likanisi”
Bozalani pembeni ya François na bilenge
Bilenge banso balobi eté :« bayebi kaka Pàpa eye», yango wànà bazali kopesa longonya na Mokonzi monene ya bantomà oyo ayebaki kolobela bango mpe kolakisa bango bolingo bwa yé. Na tango ya Misa ya matanga, oyo elekaki o mokolo mwa poso mwa tùkù mibale na motobà (26) ya sànzà ya aprili, elenge mwana Anna, aùtaki na Genève na ekolo ya Suisse ataàtoli boyé : « Yubilé ya bilenge ebongwani matanga mpe botondi matondi ; Pàpa eye azalaki pembeni ya bilenge, mpamba te na bombi na makanisi koseka nà kosimbasimba na yé mpo ya banso». Mpo ya Béatrice, alobi été «ayebi ntina nini azali wanà» elongo na fulu ya bandimi bayei kopesa limemya na episkopo wa Roma.
Mpo ya bakambi ya masàngà oyo ezali kopesa na bilenge libakù ya kozala na ekwélà oyo, esengelaki kozwa mokano mpo ya kokanisa lisusu manaka. Esika ya butù ya bokengeli nà kondo mokonzi monene ya bantomà, bilenge bayaki komonana na kosàngana na Misa ya matanga na mpokwa mwa mitano mpo na kopesa mbote mpe limemya lya nsuka na Pàpa lya bango. Likambo mosusu, ezali boluboli ya elenge mwana ya Itali Carlo Acutis, bilenge bayaki balotùkà ya bamiliyé, na esengo mpo ya kosàngana na Misa ya lomingo liye ya mibale ya novemdiales mpo na kolakisa limemya na Pàpa François.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basàngo tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basàngo na kofina esika eye.