Luka

Prayer for the Jubilee of the Missionaries of Mercy in the Paul VI Hall Prayer for the Jubilee of the Missionaries of Mercy in the Paul VI Hall  (ANSA)

Batindami ya mawa, esalelo moko ya malonga ya bolimbisi

Batindami ya mawa (missionnaires de la miséricorde) bazalaki na misa na jubilé mokolo ya eyenga 30 ya sanza ya misato na ndako ya Nzambe ya Saint-André-du Val, na Roma. Na bolandi lisese ya mwana abungaki ya Nsango Elamu ya eyenga ya minei ya karesimo, Mgr Rino Fisichella, pro-préfet ya dicastère ya Bopanzi Nsango Elamu, alimboli na liteya ete tozali na bizaleli ya bana mibali mibale, oyo atikalaki pembeni ya papa na oyo abungaki.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Na ndako ya Nzambe ya Saint-André-du Val, na Roma, batindami ya mawa bakutanaki mokolo ya eyenga na tongo mpo na misa o eleko ya mobembo na bango ya losambo na lilita ya Petelo mpe na boleki na bango na Ekuke- Esantu. Mokolo ya mposo Santu Papa, oyo akelaka batindami ya mawa, atindelaki bango nsango ewutaki na Ndako ya Santu Martha esika azali kopema. Mgr Fisichella atangelaki bango mokanda yango mpe ezali kaka ye akambaki misa mpo na batindami ya mawa, baye ye akobenga “bisalelo ya malonga ya bolimbisi”.

Bokweyi ya bopanzi mosolo

Na botali lisese ya mwana abungaki, na litangi ya mposo ya inei ya karesimo, Mgr Fisichella andimi na liteya na ye ete tozali banso na bizaleli ya bana mibali mibale. Ya liboso, “tolingi tozala ba nsomi, biso moko, tokumba bomoi na biso moko mpe tozua mokano nini esengeli ya kosala”, lokola mwana abungaki. Kasi ezali “eseke” pamba tè “mosika na Nzambe na ndako na ye, Eklezia, tozali kosesengana”, tokolekisa ngonga na biso na bomoi moko ezanga ntina, ekobaki pro-préfet. Na eleko ena, “tozali kokanisa kozua eloko moko na esika ya mosala tosali mpe na litatoli eye tosali yango”, na bokesanisi “kiofelé ya mosala”, na bosali “mondoki ya mobulu ya kobundisa Mokonzi”. Bobungi nzela ena etali ba nganga Nzambe lokola baye bazali kososola nainu te motuya ya bozali pembeni ya Nzambe. Ezali bongo “tango tomeseni na mosala na biso” mpe “nionso ekomi polele, mpe ekozonga mbala na mbala”. “Tozali kosepela te likambo ya bozali lisanga” na Nzambe, eyokaki mawa Mgr Fisichella. Nzokande, bozali pembeni na mibombamo bisantu esengeli komema ba nganga Nzambe na “bokoti ntango inso na bozindo ya likanisi ya Tata, na kati ya bolingo na ye nzambi ya bososoli ezaleli na ye”. Na nionso, “tobengami ya koyika mpiko na Nzambe mpo na kokabola na ye”, elobaki Mgr.

Totika lolanda na biso mpe toyeba kotala mosika

Mpo na yango, ezali malamu tozua ndambo ya bizaleli, ya mbala eye, ya tata ya bana mibali mibale. Esengeli bongo “toyeba kotala mosika liboso na biso nzambi ya koyeba na lombangu bozali ya baye bazali mosika mpe bazali koya”. Esengeli totika “lolanda eye efandi mingi kati na makanisi na biso mpe bizaleli na biso, mpo na kofungola motema na biso na molimo na biso mpo ya bokoti na bozindo ya baye bazali kopusana pembeni na biso”, elimbolaki Mgr Fisichella. Na bolobeli esusu, esengeli te tofanda na esika ya ntubela, kasi tokende na bokutani ya mwana mobali tango azali nainu mosika mpe toyeba kososola tè “bolingo ebosanaka lisumu mpe bolimbisi ekotinda biso totala mbala moko lobi ekoya mpo ya kobika na lokumu” mpe “bolingo ekobongola bomoi, bolimbisi ekozongisa bomoi, mpe bokaboli ezali mbuma ya motema monene”.

Liteya mosusu ya lisese ena, ezali na bozali lisanga “bonene ya bolingo ya Tata ekoki komonana”, lokola bana mibali mibale na nsuka bazongi na ndako ya tata na bango. “Bolimbisi ya malonga mpe ya mobimba ezali eye esengami na Nzambe mpo ete moko moko ya bandeko babali akoka koyeba tè azali mwanai”, elobaki Mgr Fisichella.

Na nsuka ya liteya na ye, pro-préfet akundoli ete “Ukaristia Esantu eye tokokumisa ezali liziba ya bolimbisi. Ezali feti esengami na Nzambe. Tobosanaka te ete ezali awa esika boyokani ya solo ekosalema, pamba tè ezali esika mbeka ya Yezu ezali kozua motuya na yango

 

 

 

31 sánzá ya mísáto 2025, 15:19