Luka

2025.03.29 Pellegrinaggio Giubilare Missionari della Misericordia 2025.03.29 Pellegrinaggio Giubilare Missionari della Misericordia  (Vatican Media)

Jubilé: “Mawa ya Nzambe ekofungola elikya na bomoi ya sika”

Pembeni ya mibu zomi, Papa François akelaka batindami (missionnaires) ya mawa, ba sango baye bazua lotomo ya kozala ba nzeneneke ya bolingo nsuka te ya Nzambe. 500 kati na bango, bawuti mikili binso, basangani na Roma mpo na kotatola mosala na bango. “Bilembo ya bolingo ya mama ya Eklezia epayi na bana ya Nzambe”, elobaka Papa François.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Bakozala batindami ya mawa pamba tè bakomikomisa pembeni na banso esalelo ya bokutani ya motuya ya bato, liziba ya bonsomi, etondi na mokumba nzambi ya koleka mikakatano ya bozongeli bomoi ya sika ya Batisimo”. Papa François na bulle d’indiction ya Jubilé ya mawa ya 2016 azuaka mokano ya kosala “batindami ya mawa”, ba sango baye bazali ba nzeneneke ya lokumu ya bolingo ya Nzambe.

Kobanda 28 kino 30 ya sanza ya misato, koleka 500 kati na bango basanagni na likambo monene ya jubilé ya mbala ya motoba esalemi mpo na bango. Kati na bango, sango Vincent Bedon, sango mokonzi molandi ya paloisse Saint Louis y’Antin na Paris, aumônier ya ekolo France mpo ya bato ya mobembo. Na 2016, azalaki na masanga ya batindami ya lisanga Emmanuel, mpe bazalaki kosala makita na mpokwa mpo ya mawa. Esika likanisi ya bosali batindami ya mawa ebotamaki.

Apostolat etali bobongisi

Pembeni ya mibu zomi, sango Bedon akosala makasi ya bozali na “bosenga ya Papa François, nzeneneke ya malonga ya mawa ya Nzambe, na bolakisi bomama ya Eklezia”. Litatoli moko ekoleka na sacramento ya bobongisi epesami ntango inso na Saint Louis y’Antin. “bakotubela ngonga sambo to mwambi te na mposo moko lokola na ba paloisses lolenge toyebi, kasi ngonga 165”, elimbolaki ye.

Mpo na ye, mawa ezuami o eleko ya sacramento ya bobongisi ekangami na kati ya elikiya, pamba tè “bolimbisi ezali mbotama ya sika mpe kobotama ya sika ezali na elikya ebele”. Akuli bongonga na 1988, wana esali koleka mibu 30 eye sango Bedon akopesa bolimbisi ya Nzambe, mpe mingi mpenza lokola motindami ya mawa kobanda mibu libwa. “Tokomona bato kolela, tokomona bato batatabani, tokomona bato bazali kozonga na koseka makasi. Ezali koyokisa nsai makasi na ba sango tozali ya komona bolamu ya likabo ya mawa ezali kosala”, etatoli ye.

““Ezali na bato bazoki makasi na bomoi na bango, tango mosusu bomoi ya mobulu. Kozua bolimbisi ekozongisela bango bomoto ya mwana mobali mpe ya mwana mwasi ya Nzambe, bongo ekofungolela bango bikuke ya bomoi ya sika mpe wana ezali elikya””

Bozangi koyeba

Kasi esengeli kaka kotubela te, esengeli lokola koyebisa bonene ya mawa ya Nzambe. Mpe Apostolat ya motindami ya mawa tango mosusu eyebani te. Na etinda na ba diocèse misato ya France bikeseni kobanda 2026, sango Bedon akotatola: “Tango mosusu episkopo ya esika alingaki te, akolinga naloba etinda na ngai te”.

Kobanda sik’oyo, na paloise na ye ya Paris, sango mokonzi molandi azali na makanisi meke ya botomboli mawa. Alingi asala nteke moko ya bato basalisaka ntubela, “na botiyi na esika ya lokumu mwa bato basalisaka ntubela ya minene lokola curé d’Ars, lokola Padre Pio mpe basusu ebele”.

Bondeko ya sika na Paris

Moke moke, mosala eye elingami na Papa François ezali kokota na eklezia. Na yango, banda akoma kokamba diocèse ya Paris, Mgr Laurent Ulrich aponaki batindami ya mawa na ba basilique ya mboka mokonzi ya France.  

30 sánzá ya mísáto 2025, 10:45