Bomanyoli ya Nzela ya Kuruse na Colisée: “Lola ekiti”
Jean-René Bompolonga
Nzela moko ebongisami po na moto moko moko, po na kotala kati na ye-mei pe komiyeba ye moko, na botelemi na minyoko ya Yezu Kristu na nzela ya Kalvario. Bomanyoli ebongisamaki na Papa po na Nzela ya Kuruse ya Mokolo ya Mitano Mosantu ekolakisa tè nzela ya kuruse ezali bokiti ya Yezu epayi ya bato ye alingi, “epayi ya mokili eye Nzambe alingi”(2è station).
Mokolo eye ya mitano ya 18 ya sanza ya minei, na etinda ya Papa, vicaire général ya diocèse ya Roma, episkopo ya lokumu Baldo Reina, akambaki Nzela ena ya Kuruse na Colisée.
Nkita ya Nzambe
Na makanisi ya Papa, ekolakisa bobiangi moko ya kobima na oyo moto abongisa po na ye, po na kososola “nkita ya Nzambe” -eye “ebomaka te, ebwakaka te, enyataka te. Ezali na bomikitisi, na loboko na mabele- pe nzela ya Yezu, eye “ya Bisengo”, eye “ebebisaka te, kasi ekokona, ekobongisa, ekobatela” (2è station). Kasi ezali na “nkita ya molimo” (7è station), oyo ekeseni na ba nkita ya lelo bisalemi na “mituya pe algorithmes, na makanisi ya mabe pe ba mbano ya makasi” eye François akobeta sete. Po na bato, Kristu andimaka kuruse na ye pe kilo eye ye akumbaki “ezali pema” oyo ekosimba ye, Molimo ena ezali ‘Mokonzi pe ekopesa bomoi’” (2è station). Kasi biso, tosili “tomeli pema na bokimi mokumba”. Kasi “esengeli kokima te pe ya kotikala kati na bato ye apesi biso, na bileko bipayi wapi atie biso”, elendisi Papa, po na kosangisa biso, nzambi “ezali kaka bongo” nde tokotika “kozala bakangemi” ya biso moko, bakangemi ya moimi na biso pe ya bozangi kotala makambo ya bato
Nzela ya Kuruse, losambo ya koningana
Na ebandeli ya bitelemo zomi na minei, François akomi tè na matambe ya Yezu na nzela ya Golgotha “ezali bobimi na biso epayi ya mabele moko ya sika”, pamba tè Kristu “ayaki kobongola mokili”, po na yango tosengeli “tobongola epayi tozali kokende, tomona bolamu ya matambe” na ye. Yango wana “Nzela ya Kuruse ezali losambo ya baye bazali koningana. Ekati ba nzela eye tomesana na yango”. Pe ezali nzela moko ezali na “talo ebele po na biso” na “mokili eye ekosala mituya na nionso” pe epayi wapi “eye ya ofele ezali na motuya koleka”.
Bonsomi ya moto
Na likambo likonzi ya bonsomi eye etangemi na etelemelo ya zomi na moko, Kristu abakami o kuruse pe “akolakisa tè na eleko inso, ezali na liponami ya kosala”. Ezali “moto pasi ya bonsomi”. Yezu aponi azala na bokebi na bato mibale babakamaki pembeni na ye, na botiki eleka “mafinga ya moko” pe na boyambi “mbela” ya mosusu. Pe abosani te baye babaki ye o libaya, asengi bolimbisi “na baye bayebi nini bazali kosala te” pe amemi bango epayi ya Nzambe.
Kokweya pe kotelema
Na bitelemelo misusu bikolakisa biso lolenge Yezu akokweya pe akotelema. Yezu na bokomi “moko ya biso” abangaki “kokweya te”, kasi “ezali na basusu bakoyoka soni na yango, baye balakisaka tè bakweyaka te”, elobaki episkopo ya Roma, “baye babombaka kokweya na bango pe balimbisaka te kokweya ya basusu, bandimaka te nzela” Yezu aponaka. Kasi Kristu akokengela moko moko “lokola mpata moko eye ebungi”. Kasi, lelo ezali na “ba nkita bizanga bomoto” epayi wapi “99 eleki moko na ntalo”, pamba tè “oyo biso totonga” ezali “mokili ya mituya pe algorithmes, na makanisi ya mabe pe ba mbano ya makasi”. “Nkita ya molimo” ezali “eloko mosusu”, yango wana kotala epayi ya Kristu akokweya pe akotelema ezali “kobongola epayi yo ozali kokende pe etamboli: Mbongwana moko eye ekozongisela biso esengo pe ekozongisa biso na ndako”.
Na bato bazali na Nzela ya Kuruse, Papa akobimisa makambo moto nionso akoki kokutana na yango. Lokola ya Simon ya Cyrène (5è station) oyo, na bowuti bilanga, akangami po na kosunga Yezu na kokumba kuruse. Moto eye, ekomi akumba kuruse ya Yezu “asengaki yango te” akososolisa biso tè “tokoki kokutana na Nzambe” tango tozali kokanisa te, tango epayi tozali kokende ezali mosusu, elobaki Papa.
Yezu azali o kati ya baye bakolikia lisusu
Na nsuka ya Nzela ya Kuruse, elili ya mawa ya Yezu bakokitisa ye o kuruse (13e station) pe bakopesa ye na Joseph y’Arimathie, “oyo azalaki kozela bokonzi ya Nzambe”. Elili eye ekolakisa tè Kristu azali “o kati ya baye bakolikia lisusu” pe ekobianga biso na “mokumba moko monene”, ekokomisa biso “bato ya molende”.