Credo ya Nicée, elembo ya mokristu
Nsango ya Vatican
Mokolo ya 20 ya sanza ya mitano ekoya, mokili ya bakristu ekokanisa mibu 1700 ya bofungoli concile œcuménique ya yambo, eye ya Nicée na 325, ekota na lisapo mingi mpenza mpo na elembo ekosangisa, ekolimbola mpe ekosakola boyambi ya libiki na Yezu Kristu mpe na Nzambe se moko, Tata, Mwana mpe Elimo Santu. Ebakisamaki lisusu na Concile ya Constantinople na 381, Credo ya Nicée ekoma elembo ya boyambi esakolami na Eklezia. Yango wana Lisanga ya théologie ya mokili mobimba ezuaki mokano ya kobonza buku moko ezali na makasa pembeni ya 70 na Concile ebiangamaka na mokonzi Constantin n’Asie mineure. Concile ena ebongisamaka mpo ya bokundoli ndimbola ya mozindo mpe bolakisi mabongisi minene ya Credo nzambi ya bomoi ya sika ya Eklezia.
Mpo na nionso wana, “Yezu Kristu, Mwana ya Nzambe, Mobikisi- Concile œcuménique ya Nicée (325- 2025) ekokisi mibu 1.700”, nkombo ya buku ebimi mokolo ya minei ya 3 ya sanza ya minei. Yango ezali kaka buku ya pamba pamba te ya théologie, kasi ebongisami lokola bokuse ya eloko ekoki kotombola boyambi mpe litatoli na ye na bomoi ya lisanga ya bakristu.
“Tokondima lokola tokobatisa; mpe tokosambela lokola tondimi”
Kasi koyamba bomengo ya Nicée nsima ya bikeke zomi na sambo ekomema lisusu ya bomoni lolenge concile ekoleisa mpe ekokamba bomoi ya mokristu mokolo na mokolo: yango wana na eteni ya mibale, “Elembo ya Nicée na bomoi ya bandimi”, ekolakisa lolenge liteya mpe losambo bikolaki na Eklezia uta eleko ena. “Tokondima lokola tokobatisa; mpe tokosambela lokola tondimi” elobaki lisusu buku wana, mpo ya kolendisa ya kozua lelo mpe ntango inso na “liziba ena ya mai ya bomoi”.
Boyambi epesami ata na bato pamba
Mpo ya Lisanga ya théologie ya mokili mobimba, boyambi eye Yezu ateyi na bato pamba ezali boyambi ya bongo bongo te mpe kibokristu endimama te lokola eloko moko ya kobombama ebongisami kaka na baye bayebi.
Buku na nsuka na yango ekosala “bobengami na lombangu” zambi ya “kosakola na banso Yezu libiki ba biso lelo” kobanda boyambi elobama na Nicée na lolenge bebo. Ya liboso, nsango ya ntango inso ya concile mpe elembo ewuti kuna ezali ya kokoba komitika “kokamwa na bonene ya Kristu mpo ete banso bakamwa” mpe “kolamuisa moto ya bolingo na biso na Mokonzi Yezu” pamba tè “na Yezu Nzambe ye mei akangami na bato mpo na seko”. Ya mibale, elingi koloba kobosana eye “ezali ya solo” te mpe kopesa mokongo te “na ba mpasi biye bikotungisa mokili mpe bizali lelo lokola biye bikobebisa elikia inso”. Ya misato, elingi koloba kozala na “bokebi mingi mpenza mpo ya bana mike mpe na bandeko ya mibali mpe ya basi bazangi makoki” pamba tè “baye babakamaki na ekulusu ya lisapo bazali Kristu kati na biso”.