Ntoma ya Papa akoloba lolenge nini nsango ya liwa ya Papa eningisaki Ukraine
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Tango bazali koloba likambo etali Ukraine, bakokanisa mbala moko likambo ya « martyro » eye Papa François alobaka mingi na bosengi losambo po na ekolo eye. Bolingo na ye po na bana ya ekolo eye ebalukaki na bokebi po ya bato bazali na pasi likolo ya etumba. Atindaki ba simisi thermique, ba ambulance, ba nkisi, ba générateur électrique. Etinda ya suka esalemi mwa ba poso bileki, tango episkopo ya lokumu Konrad Krajewski, aumônier apostolique, amemaki mituka minei bizali na bisalelo ya lopitalo maye masengeli po na kobikisa bomoi.
Ukraine eyoki mawa
« Awa na Ukraine », elobi Mgr Visvaldas Kulbokas, « bato mingi basili babengi ngai po na bopesi ba condoléances, na bomoni na liwa na ye mikolo miye lokola elembo moko ». Na bozongeli ntina ya mosala ya papa François na likambo ya Ukraine, azalaki na bokengi na ba posa ya bana ya ekolo, « kaka na molimo te kasi na misala ya bosungi bato na maye bitalaki kaka ba katoliko te kasi lokola masanga misusu ya boyambi pe kaka boyambi te, po na koyamba bato banso bazalaki na pasi ». « Ezalaki na losambo y’Angelus moko te, ba mbela maye azangaki likanisi ya Ukraine te, eye ezalaki kaka na motema na ye, na losambo na ye, pe nazali kolikia tè ekosalema bongo sik’oyo, o eleko azali na maboko ya Tata »
Mongongo moko ezalaki koloba na mokili
Ba katoliko, na pe lokola masanga misusu ya orthodoxe basambelaki po na molimo ya Papa. Na Kiev, misa mingi bisalemaki na ba ndako ya Nzambe lolenge na lolenge, nzambi “nsango wana etungisaki Ukraine nionso”. “Papa François, elobaki ntoma, ezalaki mongongo moko elobaki na mokili mobimba, na bomemi bokebi na ekolo pe na bobiangi moto nionso ya kobosana Ukraine te kasi ya kotambola na lolenge ya bokeli, na bomipesi te na mabe oyo elingi koloba makambo ndenge mazali pe bikotilaka kobwangana te”.
Papa moko ya elenge na molimo ya “sika”
Mgr Kulbokas atiki esika na makanisi ya ye moko, na bokanisi na mosala na ye na Papa na esika ya secrétaire ya Vatican lokola mobongoli makomi pe na mosala ya bapaya. “Ngai moko, nakoki kobomba likambo moko te ya ntina, eye ya bozui na François Papa moko ya elenge. Alobaka na ngai tè alingi amona bato bangenga na bosika. Pe ezalaki molimo na ye. Alingaki kokutana na bato bazali na bokeli, bazali molende. Azalaki Papa azalaki na makasi, na bolenge pe alingaki komona Eklezia etala epayi ya babola, tango inso ezala ya sika. Po na wana, longonya moko enene na yo, Papa François!”, esukisaki ye.