Papa akabeli Ukraine ambulance minei
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Bokumisi esusu ya feti ya Pasika na kati ya etumba ekozala lisusu na Ukraine. Yango wana Papa akokoba kolakisa tè azali pembeni ya bato bazali konyokwama na nzela ya bikela ya solo. Na mokolo ya 23 ya sanza ya misato elekaki, na mokanda na ye y’Angélus, François alobaki « bokundoli moko ya mawa mpe ya soni po na mokili mobimba », mibu misato sima ya ebandeli ya etumba na Ukraine.
Bilembo ya bozali pembeni ya Papa wa Roma, ambulance minei bapakoli yango bilembo y’armoirie ya Vatican, bizali na bisalelo bisengeli po ya kobikisa bomoi mpe bikokende na bisika ya etumba.
Episkopo ya lokumu Konrad Krajewski, aumônier apostolique, akosungama na bakumbi mituka misusu misato po ya bokotisi mituka minei wana : Mgr Jan Sobilo, episkopo molandi ya diocèse latin ya Kharkiv-Zaporizhzhya, sango Tomasz Nadbereżny, oyo asalaka na Melitopol liboso ya etumba, mpe sango Wojciech Stasiewicz, mokambi ya Caritas-Spes ya diocèse ya Kharkiv-Zaporizhzhya. Episkopo ya lokumu akozala lokola na ekolo po ya bolakisi bolingo epayi ya bato bazali na mpasi ya etumba, po na kosambela na bango mpe po ya bolakisi bomoko ya epsikopo ya Roma.
Etinda eye, ya zomi na Ukraine po na episkopo ya lokumu mwana ya ekolo Pologne, ekosalema o kati ya Jubilé ya elilkia. Na bulle ya indiction ya mobu esantu, Spes non confundit, Papa wa Roma akomaki tè « elembo ya yambo ya elikia esengeli ebongolama na boboto po na mokili oyo, lisusu, ezindi na monyoko ya etumba (…) Bozali ya boboto ekobelela moto nionso mpe ekotinda na makasi ya kokoba na misala ya solo ». Likabo ya ambulance minei ekomi bongo elembo ya elikia ya Jubilé eye ekangemi na Kristu.
Communiqué ya aumônier apostolique etangi lisusu maloba ya Urbi et Orbi 2024 ya Papa François, maye bikotinda na mosala. Ye moko Yezu « akofungola biso bikuke ya bomoi », elobaka Mokitani ya Petelo, « bikuke biye tokanga tango inso na bitumba bizali na mokili ».