Luka

US-PROTESTERS-CALL-FOR-END-TO-DEATH-PENALTY-OUTSIDE-SUPREME-COUR US-PROTESTERS-CALL-FOR-END-TO-DEATH-PENALTY-OUTSIDE-SUPREME-COUR  (2021 Getty Images)

Koboya etumbu ya liwa, kokundola “mozindo ya ntina ya bomoi ya moto"

Na butu ya mokolo ya minei 20 ya sanza ya misato, moto moko azuaki etumbu ya liwa babomaki ye na botubi ye ntonga, ezalaki bongo na ekolo y’Amerika. Wana ezali koboma ya zomi na sanza misato. Lolenge wana ezali ebele mpe ntango mosusu ekotikala kokita te lokola Trump azongi na bokonzi, wana ezali liloba ya Lisanga ya bakristu mpo na boboyi etumbu ya liwa.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Na 1993, azuaki etumbu ya liwa mpo ya bolali mpe bobomi na 1993 ya Toni Neuner, mibu ya mbotoma 8, mpe ya Betty Dick, mama-nkoko ya mwana mwasi. Edward James, mibu ya mbotama 63, babomaki ye na botubi ye ntonga na Floride mokolo ya minei 20 ya sanza ya misato. Ezali wana bobomi ya minei na mposo moko n’Amerika.

Bobutisi motango ya bobomi ezali sika. Na 2023, bakangemi 24 babomaki bango na boloko (bazalaki 18 na 2022). Na 2025, bakoki kokoma pembeni na 28.  

Mosala mpo ya 2025

Bozongi ya Donald Trump na bokonzi ekomatisa motango ya bobomi. Mokonzi ya 47 y’Amerika alobi ete ye alingi etumbu ya liwa. “Na bokambemi ya secrétaire ya sika akotala makambo ya Bosembo, Pam Bondi, bulamatari ya Trump endimaki ndakisa botindi ya bakangemi ya etumbu ya liwa lokola George Hanson na sanza ya mibale mpe ematisaki bobomi na ekolo”, elobaki Solange Moumé Etia, elama ya Lisanga ya bakristu mpo na boboyi etumbu ya liwa. Mikano mina bibongisami na “Mosala mpo ya 2025”. Oyo ezali mokanda ekolakisa nzela ya bolandi ya ba conservateurs, mokonzi y’Amerika azali kosalela yango. Mokanda ena esemboli ete etumbu ya liwa ekoki kopesama na moto oyo “asali makambo mabe maye mobulu mpe bolali bana mike na makasi bizali na kati”.

Etumbu ya liwa ezui ndingisa na bikolo 21 y’Amerika, kasi ezali mingi epayi ya ekolo nde bobangi ezali. Kati-Kati na mobu 1988, eleko ya bozongisi etumbu ya liwa na Cour suprême y’Amerika, mpe 2016, ntango Donald Trump aponamaki mpo ya mbala ya yambo, babomaki kaka bato misato na ekolo. Bokonzi ya Trump ezongisi yango. Babomaka bakangemi 10 na ekolo na 2020, motango moko ekokani na yango te kobanda 1896.

Mokili moko ekoluka sembo

Mpo ya Lisanga ya bakristu mpo na boboyi etumbu ya liwa, bosaleli etumbu ya liwa ekobota sembo mpe bokasi te. “Kasi, mikanda mingi bikolakisa ete na Bikolo biye bikosalela etumbu ya liwa motango ya mobulu ezali kaka komata”, elobaki Solange Moumé Etia. Mpo na ye, “lolenge nionso ya etumbu ya liwa ezali malamu te mpe esengeli kozala te”.

“Etumbu ya liwa ekobongisa likambo moko te”

Eleki mibu 34, Lisanga ya bakristu mpo na boboyi etumbu ya liwa ekosangisa ba bénévole na bato bazui etumbu ya liwa, baye bazali kozela baboma bango. Edward James azeli mibu koleka 30 kati-kati ya bozui etumbu mpe ya bobomi ye. “Tozali kolanda 10% ya bato bazali kozela liwa n’Amerika, bazali bongo bato 2000 bazui etumbu ya liwa. Mibale kati na bango babomaki bango mobu eye mpe bobomi ya mosusu, Moïse Sandoval na Texas, ebongisami mpo ya 23 na sanza ya minei”, ekobaki koloba Solange Moumé Etia.

Lisanga ya bakristu mpo na boboyi etumbu ya liwa ekoluka bopanzi makanisi ya bomoto na mateya, na bobeti nsete na motuya ya bomoi ya moto “akelami na elili ya Nzambe”, na bozongeli ntango inso ete “etumbu ya liwa ekobongisa likambo moko te”.

 

 

 

23 sánzá ya mísáto 2025, 08:51