Lolaka la Amerika (Voix de l’Amérique=VOA) ekomi kokufa
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Kobanda mokanda ekomamaki mokolo ya 27 ya sanza ya misato na masanga bikobatelaka mosala ya bopanzi nsango, masanga misusu balandi lokolo wana mpo na kosenga tè Voice of America na Radio Free Europe bikoba misala na bango. Ba misusu bamemi likambo yango epayi ya esambiselo mpo ya bokweisi mobeko ya Trump.
Mokonzi y’Amerika Trump alobaka katikati ya sanza ya misato été akotinda na bopemi basali ya ba media baye. Basali baye Donald Trump akotinda na bopemi bazali bongo 3.000. Mpo na ye, bazali ba « ba element ya ntina te ya ekolo”.
Bokotisi bonsomi bipayi ezangaki
Voice of Amerika ekelami o eleko ya etumba ya mibale ya mokili mobimba (2ème guerre mondiale). Radio Free Europe na Radio Free Asia bisalemi nsima ya Voice of America. Mosala ya ba media maye ezalaki ya kopesa “lolaka y’Amerika” na mokili mpe mingi mpenza na bikolo biye bonsomi na democratia bizalaki te lokola na Birmanie, Vietnam to Cambodge. Likambo ena esali mpasi n’Anne Bocandé, elama moko ya Reporters sans frontière (RSF) pamba tè ba media maye bizalaki kopesa nsango na minoko ya bikolo bisika bizalaki.
Mpo na Michael Abramowitz, mokambi ya VOA, asepeli te na likambo yango. Alobi “media ena ezalaki esalelo moko ya motuya mpo na etumba ya ba nsango ya lokuta bitalaki Amerika. Ba nsango yango bibandaki kowuta na bikolo misusu lokola Chine, Iran mpe Russia. Bikolo biye bizalaki kobimisa mosolo ebele na etumba ya nsango, mpe bokangi VOA elongoli Amerika na etumba ena”.
Bapanzi nsango mibale ya VOA bazali mikolo miye na boloko. Sithu Aung Myint akengemaki na mobu 2021 na Birmanie mpe Pham Chi Dung azali na etumbu ya mibu 15 na Vietnam. Atako ba media maye bazalaki kobika na mbongo ya bulamatari y’Amerika, kokoma na bango ezalaki na bonsomi liboso ya bakambi ya ekolo.
Yoane Polo ya Mibale na Voice of Amerika
VOA na RFE nionso mibale biyambaka na ba emission na bango Papa Yoane Polo ya Mibale. Liboso ya kofanda na ebonga ya Petelo, episkopo ya Cracovie alobaka o eleko asalaka mobembo n’Amerika na mobu 1976. Bakambi communiste ya ekolo Pologne bazalaka kosepela te na ba emission ya VOA lokola maye ya RFE eye ezalaki na Pologne. Na ntango ya guerre froide, episkopo ya lokumu Wojtyła azalaka kopesa na RFE ba nsango ya Eklezia katoliko ya Pologne. Na ngonga ena, bato mingi ya Europe centrale na orientale bazalaki kolanda RFE.
Nsima ua mibu 11 ya bokeli Radio Vatican na Guglielmo Marconi, mobandi ya ba onde courte, Voice of America ebandaki kopesa nsango mpo na kolakisa lokuta y’Allemagne ya Hitler.