Luka

ICOAST-BURKINA-UNREST-REFUGEE ICOAST-BURKINA-UNREST-REFUGEE  (AFP or licensors)

Na Burkina, Eklezia ekoluka nsango moko ya boboto mpe ya elikia

Nsima ya ba mbela mpo ya “bosilisi bato ya ekolo mingi baye babokolaka bibuele”, na ba réseaux sociaux, “mpo ya mama ya likambo ekoloba ete bango nde bato ya mobulu bazali koboma bana mboka”, bato ya bosembo ya Burkina Faso bazui mokano ya kotala soki ezali ya solo, na bolobi ete bato wana bakoki kozua bitumbu ya boloko. Eklezia, liboso ya likambo ena, ekolemba te kobelela mpo na boyokani kati na bana mibali mpe bana basi ya ekolo.

Jean-René Bompolonga- Kinshasa

Lolenge bobateli ezali te mpe mobulu ezali kokoba kaka na ekolo kobanda 2015 na Burkina, ba nsango ya nkanda bikotambola na réseaux sociaux na ekolo mpe bikobenga na bosilisi “bato ya ekolo misusu mingi baye babokolaka bibuele”. Bana ya ekolo bazali kofunda bango na bolobi ete bango bazali koyokana na batomboki ya jihad mpo ya koboma bana ya ekolo, mingi mpenza ba civils, ata na kati ya mabele ya Sahel. Mabele ya Sahel ebimi na mibu mibale bilandami lokola “liziba ya mobulu ya mokili mobimba”.

Na communiqué moko, procureur ya Burkina oyo akotala makambo ya bosembo na Ouagadougou alobaki mpo ya likambo ena, “bofungoli boluki ya bato bazali kosala makambo yango mpo na kofunda bango”. Ba nsango yango ya nkanda, ndenge Blaise Bazié alobi, bikambemi na “ba nsango ya lokuta bizali koluka bokaboli, ya kotia bomoi ya moninga na mpasi mpe ya botindi moto asala mabe, bizali bongo kobuka mibeko biye bosembo ya Burkina ezali kopesa bitumbu”.  

Bato bakimi bisika na bango

Sango Constatin Safantié Séré, secrétaire général ya Caritas ya Burkina, alobi ete bato bakimi bisika na bango bakendeke mingi na “kati ya commune, soki mobulu ekomi na commune bakendeke na mboka mokonzi ya province”. Epayi ya ba ndelo ya bikolo, ekobaki sango Séré, “soki mobulu ekoti bana ya ekolo bazali kokima ekolo na bango mpo na kokende na ekolo mosusu”. Caritas ezali kosunga baye bakimi bisika na bango na kati ya ekolo na bopesi biloko lolenge na lolenge.

Bozongi na Liloba ya Nzambe, Liloba moko ya elikia

Eklezia ekobelela ntango inso boyokani kati na bana mibali mpe bana basi ya ekolo, ekobaki koloba sango. Eklezia ekotelema ntango inso pembeni ya bato bazali na mpasi, baye bazali kokufa mpo na bozangi bobateli mpe ekosambela mpo ya bango banso. Eklezia “ekobenga boyokani kati ya bana ya Burkina, ekotala te parti politiki na ye to monoko ye alobaka”. Nsango ya elikia ya Eklezia ya Burkina na mobu eye ya Jubilé ezali koyokana lisusu makasi. Ekobianga bozongi na Liloba ya Nzambe, “Liloba moko ya elikia” ya Mokonzi oyo atikaka ba mpate na ye te.

Lisungi ya Vatican

Na bobiangi ya Leta ya kobatela bana nionso ya ekolo, sango ya Burkina akolikia ete “makambo bikosalema lelo ya mobulu bizala liziba te ya bokabwani ya bana mboka”. Eklezia ekolendisa bana ya ekolo na lisolo kati na biyamba mpe ekobenga bango bafanda lokola bamesana. Na sanza ya mibale elekaki, na mobembo asalaki na Burkina, Secrétaire d’Etat ya Vatican alakisaki litomba ya kosangisa mosala ya mampinga na misala ya botomboli bomoto mpo na bobongisi bomoi ya mwana nionso ya ekolo. Episkopo ya lokumu Pietro Parolin alobaki lisungi ya Vatican na bokasi Burkina ezali kosala mpo ya bozongisi boboto na ekolo.  

26 sánzá ya mísáto 2025, 12:35