Liban : Ordre ya Malte amipesi po azala kati na eyano na “ndenge nionso"
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Esika ya Ordre ya Malte na Roma eyambaki mokolo ya mitano 11 ya sanza ya minei lisangani moko po na bolobeli Liban na likambo likonzi “Kotonga lisusu Liban na bobateli biyamba pe bokoko na ye nionso”. Mokonzi ya sika ya Liban, Joseph Aoun, afungoli likita na bolobi na nzela ya video. Sima ya mibu 70 ya mosala na Liban mokonzi alobaki botosi pe botiyi motema maye Ordre ya Malte azali na yango. Alobaki tè Liban ezali na bokutani ya ba nzela, kasi makambo maleki mikolo bilekaki bikopesa elikia po na boboto ekowumela na etuka. Mokonzi Aoun akumisaki mingimingi bomipesi ya Ordre ya Malte, na bolimboli tè mosala ezali koleka lisungi po ya bato pe Ordre ekosunga lisusu lisolo na ekolo.
Na lisikulu na ye na lisangani, mokambi monene ya Ordre ya Malte azongelaki lisusu bomipesi makasi ya lisanga na ye na Liban, lokola etatoli mobembo asalaki na ekolo na sanza ya mibale elekaki. “Esalelo moko ya bobongisi mabele, lopitalo moko efunguami lisusu, monganga moko asilisi eteyelo, mokoni moko abiki ezali mbóto moko ya boboto ekonami na mabele moko ya makasi kasi ebotaka. Liban ezali na posa abika. Kaka na nzoto te kasi na molimo na ye lokola. Ordre ya Malte ekokoba kozala pembeni ya bana ya Liban, na bokokisi mosala na ye”, elobaki ye.
Ordre ya Malte ezali kasakasa na Liban, epayi wapi masanga ya biyamba bikeseni 18 bizali, pe ekopesa lisalisi na ye na botali eyamba ya moto te. Mokonzi Aoun alobi tè bokeseni ya biyamba pe ya bokoko ezali na motema ya ezaleli ya bana ya Liban pe ezali likonzi ya bovandisi kimia na etuka. Po na mokonzi ya ekolo, esengeli kobatela bokeseni ena.