Na Sudan ya Sudi, ba episkopo bakobanga bomati ya mobulu
Jean-René Bompolonga- Kinshasa
Mwa mikolo liboso ya mbela mpo na boboto ya Papa François, Lisanga ya ba episkopo ya Sudan mpe ya Sudan ya Sudi alobaki na communiqué moko bobangi bwa ye liboso ya bomati ya mobulu mpe ya bobebi ya klima ya politiki na ekolo. Na mokolo ya 26 ya sanza ya misato elekaki, mokonzi molandi Riek Machar, monguna ya kala ya mokonzi Salva Kiir, azui etumbu ya bofandi na ndako na mboka mokonzi Juba. Parti politiki na ye efundami lokola mobebisi ya boyokani ya kimia ya 2018, mpo na bopesi maboko na etuluku “Limpinga ya pembe” na etuka ya Nasir. Etuluku eye ebundisi limpinga ya mokambi ekolo ba mposo ebele. Na bolobi na bango ya mokolo ya 28 ya sanza ya misato elekaki, ba epsikopo ya Sudan ya Sudi bapameli bitumba kati na biteni mibale, bokangemi ya bakambi ya politiki, na kati wana Riek Machar, na mpe “bokimi ya ba civil bayebi ntina te -mingi basi na bana”. Makambo maye bikolakisa, mpo ya Eklezia ya ekolo, “bobaluki ya mawa ya boboto eye tozali kozela mpe tozali kosambela”.
Bokangemi ya mokonzi molandi ezali likambo linene ya boluki molayi kobanda ba sanza ebele ya bato ya opposition. O eleko ena bakambi ya politiki mpe ya mampinga baye bazalaki nsima ya lingomba ya Riek Machar balongolaki bango to bakangemaki. Epayi mosusu, o ebandeli ya sanza ya misato, limpinga ya Uganda etindaki ba soda mpo na bopesi maboko na mampinga ya Sudan ya Sudi mpe kobwaka ba bombe na pepo na bituka ya Haut-Nil, esika wapi “Limpinga ya pembe” ezalaki. Bitumba bina bitalaki ba civil ya engumba lokola, mokambi ya ONU na Sudan ya Sudi amoni tè mobulu ena ebengani bato 63.000 bisika na bango. “Bokangemi ya bakambi ya opposition mpe lisungi ya mampinga ya bapaya -oyo mpenza ya bopanzi ba soda ya Uganda- bobakisi bobangi na bozangi kotia motema. Makambo maye bikoki kobongola ekolo na biso ya ntalo na esanga ya etumba mpo na bolamu ya bapaya mpe mpo y botungisami ya bayi politiki”, ekebisaki lisanga ya ba episkopo. “Bato ya Sudan ya Sudi banyokwami mingi”, bikobaki ba episkopo. “Etumba ememi bana na bango, ba ndako na bango, lobi ekoya na bango mpe, lisusu, mampata ya moyindo ya etumba bitelemi likolo ya ekolo na biso”. Ekolo ya elenge koleka ya mokili, oyo Papa asalaki mobembo na sanza ya mibale ya mobu 2023, ekokumba kaka ba mpota ya etumba makasi eye esalemaki na 2013 mpe 2018, mpe ebomaki bato koleka nkoto nkama.
“Lokola babateli ya Eklezia, tozali wana ntango inso mpo na kosalisa mpo ya lisolo, ya kozala lolaka ya baye bazangi yango mpe tosimbana loboko na loboko na baye banso bazali koluka boboto ya solo”. Lisanga ya ba episkopo ekolendisa na nsuka “bato, bilenge, bituluku ya ba mama, ba nkumu ya mboka, mokili mobimba mpe na bato banso ya motema malamu tosangana mpo ya koboya etumba mpe mpo na boboto”