Luka

2022.10.13 Assemblea News di Ebu a Ginevra 2022.10.13 Assemblea News di Ebu a Ginevra 

Radio Vatican ezali na lisangani ya Poto ya ba radio na Paris

Mboka mokonzi ya France ezali kobongama mpo na koyamba Lisangani Radio ya ba radio ya leta ya Poto, ebongisami ebanda 3 kino 4 ya sanza ya minei. Radio Vatican, elama mokeli ya lisanga ena kobanda 1950, ekozala. Alessandro Gisotti, mokambi molandi ya ba media, akolakisa elongi na ye kuna na nkombo ya Radio Vatican.

Nsango ya Vatican

Koleka bikolo 33 ya Poto bikozala na bosali ya mbala ya 31 ya oyo babengi na lopoto ‘Assemblée européenne de Radio Télévision (UER)’ eye ekosalema na Paris na ebandeli ya sanza ya minei. Na boumeli mikolo mibale, 3 mpe 4 ya sanza ya minei, lisangani ekotala mikakatano ya eleko eye mpo oyo etali radio ya leta na Poto, mpe ekosolola nini ya mituya bifungwami mpo na lobi ekoya ya radio. Radio France ezali etuluku ebongisi bokutani ena. Kati na baye bakozala kuna ezali bongo Radio Vatican eye ekolakisama na Alessandro Gisotti, mokambi molandi na ye.

Bizaleli malamu mpe intelligence artificielle

Lisangani ya mobu moye ekobeta nsete na oyo etali makambo mazali koleka, lokola bizaleli nini ya malamu bikomonana na bosaleli oyo babengi na lopoto ‘intelligence artificielle’ mpe lolaka synthétique na bobimisi eye tozali koyoka, mayele nini kosala mpo na bozui bayoki (auditeurs) ya sika (mingi mpenza bilenge), mbongwana ya ba radio ya leta na botali masenginya bikomata se komata ya politiki mpe ya mosolo. Bokebi moko enene ekozala na oyo babengi “Connected Car Playbook”, mosala moko ezali kotala bisalelo bikangami na ba radio, mpe na nsuka, masolo bitali lotomo ya miziki.  O kati ya lisangani bikosalema maponami ya comité radio ya UER mpo ya ba mibu 2025-2027.

Radio Vatican

Bozali ena na liyangani ya ba radio ya Poto ekoluka kobimisa mosala ya Radio Vatican na bomatisi biloko ya kati ya motuya, lisusu bokebi ekopesama mpo ya botomboli ba technologie ya sika, lolenge mosala ya UER ekosenga ya kotombola ya malamu koleka ya ba radio ya leta. Radio ya Papa ezali elama ya lisanga eye ebanda na 1950. UER ekambemi mikolo miye na mokonzi ya France Télévisions, Delphine Ernotte, kino maponami makosalema.

01 sánzá ya mínei 2025, 11:58