Luka

Floods hit Congo's Kinshasa Floods hit Congo's Kinshasa 

Sima ya mpela ya ebale ya Ndjili, esengeli Leta apekisa botongi ba ndako pembeni ya ebale

Ba mbula ya makasi ebetaki na engumba Kinshasa mokolo ya mitano ya minei ya sanza ya minei. Mayi ya ebale ya Ndjili ebimaki, esali mpela oyo ebomi mpe ezokisi bato, ebebisi biloko ebele. Na lisolo azuaki na Radio Vatican, professeur Jean-Willy Ndemi Kiling, moto ya mayele na oyo etali nzinganzinga, amoni tè ezali mosala ya bato nde eboti likama ena. Asengi babotolo bato ba ndako bitongama na bisika bilongobani te mpe ba bongisa ebale.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Bomati ya mayi ya ebale ya Ndjili, na butu ya mokolo ya mitano kino mokolo ya poso ya 5 ya sanza ya minei, esalaki mpela oyo ebomi bato. Likambo yango ekotinda bato na bokengi makasi na oyo etali nzinganzinga ya mboka mokonzi ya Congo. Mpela ezali kosalema mingi na Kinshasa o eleko ya mbula na bibale bileka o kati ya engumba. Na lisolo azuaki na Radio Vatican, professeur Jean-Willy Ndemi Kiling akolimbola po na nini mpela ezali kosalema mingi na Kinshasa.

Botongi ndako na lolenge ya mabe

Tokoki koloba tè batosi mibeko ya botongi ba ndako te oyo na lopoto babengi “normes urbanistiques”. Tango okopesa mabele, ezali na mibeko, ezali na mikanda ya kolanda. Esengelaki mpenza batosa bisika mayi ya Ndjili ezongaka kobanda Lemba Imbu”, elobaki ye. Alakisi tè epayi na epayi ya ebale ya Ndjili, ezali na ba ndako bitongami wusu-wusu, na botosi lolenge ya botongi te. Mboka mokonzi Kinshasa ezali moko ya bingumba y’Afrika biye bato bakomi ebele. Ezali na molayi ya 9 965 km² mpe na mobu 2021 motango ya bato elekaki 17 milio. Mpasi ya likambo ya ndako esali tè bozui mabele ekosalema bongo bongo, ata na bisika bisengeli te moto afanda, lokola pembeni ya ebale. Yango wana, Kinshasa ezali ba mibu ebele esika ya makama lokola ba mpela. Bato ya mayele bamoni tè na mozindo ya bibale biloko biwuti na ba ngomba bifandi kuna. Po oyo etali ebale ya Ndjili, Ndemi Kiling abakisi lisusu bosaleli mabe ya bosoto ewuti na ba ndako. “Uta Lemba Imbu, kino esika ebale esukaka, ezali na ba ndako bipayi wapi bosoto ekobwakama na ebale Ndjili. Tango bakobwaka mokolo na mokolo bosoto na ebale likambo ekobima na bozindo na ye”. Po na professeur Ndemi Kiling, bozui mabele pembeni ya ebale, bobwaki bosoto na ebale ya Ndjili mpe bobebisi zamba eye ezalaka pembeni ya ebale, bizali makambo misato maye bikolisi mpela. Po na ye, “soki bazuaka mabele pembeni ya ebale te, na ndenge ya bonsomi, tokokaki kozua likama moko te, pamba tè mpela ezali likambo ya Nzambe”, esukisaki ye.

bobotoli bato ba ndako bitongama na bisika bilongobani te mpe bosukoli ebale po ya kobongisa makambo

Soki balobi esika moko lokola esika ya botongi ndako te, esika moko ya kozua te, epayi wapi okoki kotonga te, ezali Leta nde akosala tè bato batosa”, elakisaki professeur Ndemi Kiling. Kasi, ekobaki ye, soki bakotika bazua bisika bisengeli te po batonga ba ndako, Leta azali na mokumba na ye wana. Bato baye bayebi te bazali na bango mokumba. Po na kosukisa likambo ena, lolenge ye amoni mpe na lolenge ya nzebi, ezali ya liboso koyeba bato bafandi na bisika bisengeli te nzambi ya bobotoli bango mabele po makambo tozali komona bizonga lisusu te sima ya mibu zomi to zomi na mitano. Po na mayi ya ebale ya Ndjili etambola malamu kino ebale monene ya Congo, apesi likanisi ya bosukoli ebale ena. “Soki basukoli ebale ya Ndjili te, tokomonaka kaka makambo ya boye. Basengeli kotika kimia bisika biye bizali pembeni ya ebale mpe kotika mobulu eye ya kopesa bato mabele kuna”, professeur apesi likanisi wana

 

 

11 sánzá ya mínei 2025, 13:12