Luka

2025.04.02 Viktoria, medico militare in Ucraina 2025.04.02 Viktoria, medico militare in Ucraina  

Viktoria, monganga ya Ukraine akosunga koleka lolenge eyebani esika ya etumba

Litatoli ya elenge mwasi monganga oyo akosala koleka mibu mibale pembeni ya ba soda bazoki na Ukraine: “Mingi bakei, natikali, na bokanisi mingi bato babukani. Tango mingi, nayebaka te po na nini makambo bizali koleka boye, na yango nasengaka Nzambe apesa ngai bwanya na makasi ya kondima nionso wana mpe akosunga ngai”.

Jean-René Bompolonga-Kinshasa

Nakutani te na baye bandimaka te na etumba. Ezali boyambi nde ekomema biso na wusu-wusu ya etumba, na mpasi, na minyoko mpe tango mosusu na mawa. Kasi ezali mpasi kolimbola ndenge Nzambe asalaka, tozoyoka yango na motema. Mbala ebele namoni Nzambe akobikisa na bandimi na baye bandimaka te, lokola azali koloba na kati ya ba makambo: ‘nazali awa, natiki yo te’”. Viktoria azali na mibu 30. Azali monganga ya mampinga ya Ukraine banda mibu mibale mpe azali kosalisa na bobimisi ba soda bazoki na etumba. Tango azuaka bopemi ya mokuse na mosala na ye, elenge mwasi, oyo azali na mobu na ye ya suka ya boyekoli monganga, akolongua na monyele ya ekolo kino mboka mokonzi Kiev po na bosali mimekano na ye ya suka.

Mokano ya kotikala

Na mboka mokonzi, ezalaki ebandeli ya etumba na makasi, o eleko mingi bazuaka mokano ya kobima na mboka, ye azuaka mokano ya kotikala. “Nayebaka tè bato banso bakokende te, ya liboso mpenza bibosono to baye bazali na lolenge ya kobika ndenge mosusu. Kasi nayebaki tè ba soda na biso bakotikala mpe bakozala na bosenga ya minganga. Lokola nayekoli mosala ya monganga, nazuaki mokano ya kotikala na Kiev”, elobaki ye.  

Molende mpe mikumba

Na esika ya etumba, elenge mwasi akosala na mokumbi motuka moko. “Tozali kaka biso mibale, pamba tè ba minganga bazali mingi te. Esengeli ngonga mwambi po na kokende mpe kozonga, ezali kosenga kozala makasi. Tozali kokende mpe kozonga tango mosusu tokosala na etuluku ya minganga ya bozongisi pema na bato. Ezali bongo na ngonga inso mokumba monene mpe molende eye esengeli, soki te, tokoki kobikisa bato te”, elimbolaki ye.

Mokolo ya liboso ya mosala na Bakhmout

Viktoria akokundola malamu mokolo na ye ya mosala ya liboso na esika ya etumba, na bolobi na lolenge elongobami: “Na miso ya liwa”. Azalaki na etuluku ya bozongisi bato pema. Babengaki bango na Bakhmout, liboso tè mboka ekweya na maboko ya ba Russe, po na kosunga elenge mobali moko oyo azalaki kokumba motuka, kasi azuaki likama, lokola esalemaka mingi na etumba. Asengelaki akumba motuka na lombangu koleka. Azalaki mopaya moko ayaki na Ukraine lokola volontaire. Viktoria alobi boye: “Na mawa, elenge mobali oyo azokaki makasi. Na etuluku ya bozongisi pema, tomekaki nionso oyo ekoki po na kobikisa ye. Tobundi koleka minute 30, koleka lolenge mobeko ekosenga, na bosali nionso oyo tokokaki. Kasi, tokokaki kobikisa ye te. Nazalaka moto ya suka ya kobima na ndako ya bozongisi pema. Nakangi miso na ye mpe natikaki ye na mawa ya Nzambe. Nasamebelaki po na ye, nzambi Mokonzi ayamba ye, sima ya komibonza monene: kowuta ekolo mosusu po na kosunga biso. Natondi ye botondi”.

Pembeni ya Nzambe

Likambo wana ya mpasi ezalaki ya yambo po na elenge mwasi monganga, kasi ya suka te. Boyambi ya mozindo na ye mpe koyeba bosolo ya elaka ya Nzambe, “nazali awa, natiki yo te”, bisungaki ye na koleka ba ngonga bina. Viktoria ayokaki maloba mana lokola ya solo solo o eleko ye-mei asalaki accident. Kino eleko ena, azalaki na ngonga moko ya mpasi ya molimo, ayokaki tè alembi makasi likolo ya kilo ya mosala mpe azalaki kutu kokoka kosambela lisusu te. Etikalaki na ye kaka makasi ya kotuna Nzambe: “Ozali wapi?”

Likama

Mokolo moko, tango bazali kobimisa soda moko azokaki, ambulance oyo ye azalaki esalaki likama. Mokumbi atambolaki mabe mpe motuka ebaluki mbala ebele. “Nakokundola tè nionso ebandaki kobaluka pembeni na ngai mpe motuka etelamaki ba pneu likolo, kasi nazalaki ya kotelema ngbi. Motuka ebebaki makasi mpe bakokaki lisusu kobongisa yango te. Lisusu, tozalaki na milangi ya oxygène na kati biye bikokaki kopela moto ngonga inso. Kasi mokumbi motuka na ngai tozalaki malamu. Nakanisaki b’angelu batelemisaki ngai. O eleko babimisaki ngai na motuka, nasambelaki lokola nanu nasala yango te liboso. Na nzela ya likama eye, Mokonzi ayebisi ngai:Nazali na yo. Omoni oyo ekokaki kokomela yo? Eloko ya yambo nasalaki ezalaki ya kokende na ndako ya Nzambe moko ya Kramatorsk po na kotondo Nzambe”.

Minganga ya mampinga mpe baye basalaka na bango basengeli kosala mosala na bango na lombangu mpe malamu pamba tè bazali kobunda kaka po na bomoi ya basusu te, kasi bakoki kobungisa ya bango.

Kosambela Nzambe

Atako elenge mwasi akoluka atala monyoko na nzela ya boyambi, ezali mpasi po na ye ya kososola mposa ya Nzambe: “Tango mingi, nasosolaka te po na nini makambo maleki bongo, po na nini elenge mobali moko azongi epayi ya Nkolo. Yango nasengaka Nzambe: ‘Pesa ngai bwanya, pesa ngai makasi ya kondima nionso wana’ mpe apesaka ngai makasi

Kolikia na lobi ekoya

Na baye akutanaka na bango mpe akobikisa, azali liyeyele ya mwinda. Ye akomona mayeyele ya mwinda wapi? “Po na ngai, elobi ye, bongengi ya elikia ezali na boyambi na biso. Nandimi tè Nzambe alona mbóto ya ye-mei mpe ya elikia na ye na moto na moto. Boyambi ekotinda biso tosala. Ndakisa, nakolikia tè ekolo na ngai ekopika, na yango nakei n’etumba, nakosunga na bobikisi bomoi mpe nakosala nionso nakokoka. Soki nazali kaka litanga ya mai na ebale monene, nakotondo Nzambe. Nandimi tè Ukraine ekozua bonsomi. Nandimi tè bato banso nazali kobimisa bakozonga bipayi na bango na bomoyi mpe nzoto kolongono. Nandimi tè mabota na bango bikozala na esengo ya koyoka tè tata moko, ndeko mobali moko, mama moko azali na bomoi. Nandimi tè Mokonzi akokamba moko moko na biso mpe Nzambe azali kosala na nzela ya moko moko na biso”.    

07 sánzá ya mínei 2025, 12:53