Azali o maboko ma Tata
Episkopo ya lokumu Farrell alobaki na mawa liwa ya Papa Franços, na maloba maye: “Bandeko babali mpe ya basi, ezali na mawa enene tè ngai nayebisa bino liwa lya Santu Papa François na biso. Lelo na tongo, na ngonga ya sambo (7) mpe miniti tukù misati na itano (35), episkopo ya Roma, François, azongi o ndako ya Tata. Bomoyi bwa yé mobimba abonzaki bwango na mosala ya Mokonzi pe ya Eklezia na ye. Alakisi biso na kobika na makambo ya ntina ya Nsango Elamu na loboko, molende pe bolingo ya mokili mobimba, mingimingi po na babola koleka pe baye batika bango pembeni makasi. Na botondi enene po na ndakisa na ye ya moyekoli ya solosolo ya Mokonzi Yezu, totiki molimo ya Papa François na bolingo ya mawa nsuka te ya Nzambe Tata, Mwana pe Elimo Santu”