Lomingo la Mbila: Zalani Mo-Cyrene biso na biso
Albys KBD CP – Kinshasa/RDC
Lomingo la mbila ekokundola makambo mabalé ebetami lisolo na Bondeko bwa sika. Ya yambo, ekosepela kokota ya nkembo ya Yezu o Yeruzalem; lisusu, ekokundola malozi mwa Kristo, liwà lya yé o kuruzé, bokundami bwa yé, lokola tokotanga yango o mikolo mwa triduum ya Pasika. Nde na lisolo liyé Pàpa apesi likanisi na bandimi na lomingo loye, na kolimbola maloba ma mikanda misantu mpo ya kristo Mesiya tango aleki o ezibelo esantu, eyembaki etulùkù ya bato: “bàbenisa Mokonsi, oyo akoyà, o nkombo ya Mokonzi Nzambe” (Lc 19, 38). Kasi nà mwa tango moke, akoleka yango lisusu nà nsé mafinga mabango, mpe bakokitisa yé, akomema kuruzé.
Bandimi ebele na esika ya Mosantu-Petro, basimbaki mandalàla o maboko mpo yak olanda Kristo, yambo na molongo ya esengo, mpe sima o nzela ya bwalé. Babongisi ndé bongo, Poso Esantu oyo ezali kolengele bis ona kosepela Pasika, elembo ya liwà mpe nsékwà ya Mokonzi. Tata-Mosantu aponi episkopo wa lokùmù Leonardo Sandri, doyen-molandi ya Collège cardinalice, mpo kokamba milùlù mya Ukaristiya. Na mateya balengeli, Pàpa alobeli lisolo lya mo-Cyrene ; mpe abyangi na kokundola “elembo ya lisalisi lya yé, koyeba motema mwa yé mpe kolanda nzela ya yé o mopanzi mwa Kristo .
Bilongi mibale ya lisalisi lya Simoni mo-Cyrene
Solo, Mpo ya mo-Cyrene, ba tindi ye na kokumba kuruzé elongo nà Yazu, “asàlisi na motema mwa yé moko te, kasi na makasi”, elimboli Mokonzi monene ya bantomà. Alobi ete, lisàlisi linà lizali na bilongi mibalé, mpamba te, yemei asàngànaki na malozi ma Mokonzi. Na yango, Kuruzé ya Kristo ekomi kuruzé ya Simoni. Alimboli malamu ete, ezali lokola oyo ya Simoni-Petro oyo apesaki elakà ya ko lande bobele Molakisi kino o liwà (Lc 22, 33); mpamba te, Simoni wana abungaki na kowàngana Yezu. Atako Molakisi ayebisaki bango ete: “moto alingi kolonda ngai, asengeli komipima ye mei, a mema mikolo minso kuruzé ya yé, bongo alanda yé” (Lc9, 23). Bokeseni na ba Simoni oyo mibalé ezali ndé boye: Simoni wa Galileya alobi, zambi asàleli maloba ma yé te, kasi Simoi wa Cyrene alobi eloko te, nzokandé asàli. Kati na yé nà Yezu maloba mayokani tè, babeti lisolo te, kaka Nzeté ya kuruzé ekaboli bango, elobi Pàpa François.
Kuruzé oyo Simoni andimi komema, ezali oyo Kristo akumbi masumu ma biso bato, mpo ya bolingi. Soki tokokanisa oyo Simoni asàlaki mpo na Yezu, lolenge yoko esengeli tokanisa oyo Yezu asàlaki mpo na yé.
Na kosukisa mateya ma yé; Tata-Monsantu abyangi bandimi na kolanda ndakisa ya Simoni ekotangisa biso ete Kristo azali pembeni ya moko na moko kati na biso, mpe na makambo ndenge na ndenge. Atuni lisusu, bandimi boni boni bazali b amo-Cyrene oyo bakondima komema lelomei kuruzé ya Kristo? Toyebi bango? Tokomonaka Yezu o elongi ya bango ebebisami na bitumba mpe na maniolo?
Mpo ya bozangi bosembo awa na mokili, komema kuruzé ya kristo ekozangisa litombà te, kasi ezali lolengé malamu mobikisi akokabolela biso bolingi bwa yé bwa lobiko; elobi François.
Na yango, malozi ma Yezu ekokoma mawa tango, “tokosembola loboko na baye bazali na makoki te, tango tokotombola baye bakweyi, tango tokozinga na ekopi baye balembi nzoto”. Mpo ya kovivre likamwisi oyo ya ngolu: “tosengeli kopona na Poso oyo Esantu, boni boni tosengeli komema kuruze ya biso, na nzinga ya kingo tè kasi na motema. Ya biso mpamba te kasi y abato bazali konyokwama pembeni ya biso; mbele oyo ya mopaya, oyo tokokokutana ya mbalakata, mpo ezali bokutani ya mbalakata esangisi biso te”, esukisi Pàpà. Abiangi moko na moko na komilengela na Pasika ya Mokonzi, tokoma mpe ba mo-Cyrene biso na biso.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda na biso ya basango na kofina esika eye.